Episkopo ya lok¨²mu Parolin: ¡°Ba mbano bizali o k¨¢ti ya makambo bikopekisa bosilisi p¨¢si na Gaza¡±
Vatican News
O eleko ya misa ya bokanisi Sántu-Monique, esálemaki na basilique Sántu-Augustin na Roma, episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Leta ya Ngwendé ya Sántu Petelo, Pietro Parolin, alobaki lisusu likanisi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na oyo ezali koleka na Proche-Orient. Azongelaki mbela ya Papá Léon XIV pe maloba ya ba patriarche ya Mabelé-Esántu.
Botelemeli bobimisi bato na makási na Gaza
¡°Na botáli mbela ya Papá na tóngo ya leló o eleko ya likita po ya bansó, eye ekokani na likanisi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na oyo ezali koleka na Gaza¡±, elimbolaki episkopo ya lokúmu Parolin, alobaki ¡®te Papá wa Roma na ba patriarche orthodoxe ya Grèce pe ya latin baséngaki ¡°súka ya etúmba¡±, pe basakolaki ¡°botelemeli bobimisi bato na makási na Gaza¡±.
Ba mbano ebelé bizali na káti
Episkopo ya lokúmu alobaki ¡®te ¡°ezali na ba nzéla ebelé, ba nzéla biye bikoki kosilisa sóló eye ezali koleka¡±, kasi atelemelaki bozito ya ba mbano ya ¡°politiki¡±, ya ¡°nkita¡±, ya ¡°bokónzi¡± pe ya ¡°kokónza¡± maye makopekisa ¡°pási ena esila na loléngé elongobami¡±.
Papá akobóndela po ¡®te bozimi-móto ya libélá esálema na Gaza
Na súka ya likita po ya bansó mokolo ya 27 ya sánzá ya mwambi, Léon XIV azongelaki mbela na ye na etúmba na Mabelé-Esántu. Akosénga bobimisi baye bakangemi na makási, bozimi-móto¡
Kotikala ezali kozala na mpiko
Po eye etáli bobáteli ya basáli na Nzámbe na bandimi na Gaza, episkopo ya lokúmu alobaki ¡®te ¡°bonsómi mókó epesamaki libosó ya mobéko ya bolongui¡± ya bulamatari ya Israël, na botángi patriarche orthodoxe ya Yérusalem, Théophile III. Patriarche alobaki ¡®te bandimi ya paloise orthodoxe babengamaki ya «kobima na Gaza». ¡°Mókó mókó akoki kozua mokáno nini kosála¡±, elobaki episkopo ya lokúmu, na bosemboli ¡®te ¡°kopona kotikala ezali kozala na mpiko¡±. Ayébi te ¡°loléngé nini ekoki kosálema sóki mokáno ya kobima ezali¡± pe ¡°boyángeli nionso, na mabelé, ya etúka¡±.
Bilembo ya diplomatie
Na eye etáli diplomatie, Secrétaire ya Leta andimaki ¡°azali na lisoló na bulamatari y¡¯Amerika, na nzéla ya ntoma¡±, pe asakolaki pósá ¡®te masoló ya mokili biye bikosálema o eleko ya mobémbo ya ministre ya Israël ya Makambo bitáli bapaya na Washington, Gideon Sa¡¯ar, bibimisa bilembo ya sóló: ¡°Nazali kozela eye Papá aséngaki, ezali bôngo bozimi-móto, bozui mókó elongobami ya lisálisi, botosi ya mobéko ya mokili ya bato -eye ezali na tina- pe boboyi etúmbu ya lisangᡱ
Loléngé bulamatari ya Israël elingi
Na súka, na eye etáli bobángi ya bobimisi na makási bato ya Gaza, episkopo ya lokúmu Parolin andimaki ¡®te kinó sik¡¯oyo, bulamatari ya Israël ¡°alakisaki ¡®te alingi kozonga simá te¡±, na likambo yangó pe ¡°tángo mosusu elikya ezali mingi te¡±. Alobaki lisusu pósá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ya ¡°kokoba koloba¡± po ¡®te makambo bibóngwana.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo