MAP

Bilenge na JMJ ya Lisbone, na sanza ya 8 ya 2023 Bilenge na JMJ ya Lisbone, na sanza ya 8 ya 2023 

Zubilé ya bilenge, eleko ezelami koleka na Mobú Esántu

Úta 28 ya sánzá ya sambo kino 3 ya sánzá ya mwambi ekosalema na Roma zubilé ya bilenge, na molongó ya Zubilé ya Elikya. Makambo bipesami po na molongó ya bato ya sika bikolakisama mokolo ya misáto na tóngo na lisangá ya bapanzi nsango ya Vatican. Bilenge ya bikóló bikeseni 146 bakokútana na mbóka-mokónzi ya Italie po na mobémbo mwa boyambi na malita ya bapostolo Petelo na Polo.

Nsango ya Vatican News

Ezali ya tembe te «eleko ezelami koleka» ya Mobú Esántu mobimba, zubilé ya bilenge, JMJ ya sóló eye ekosangisa bato ya mobémbo mwa boyambi bawuti na biteni minei ya mokili. Maloba maye mazali ya Mgr Rino Fisichella, pro-préfet ya dicastère ya Bopanzi Nsango Elamu, pe mobongisi monene ya ba bokútáni biye bikosalema mobú eye mobimba. Alimbolaki na moláyi lolenge makambo mabongisami po na koyamba bilenge bebo. Soki bakowuta bikóló bikeseni 146, koleka mibale likolo na misáto bazali bato ya Pótó. Kasi basusu bakokoka kokóma na Roma nzókandé bazali kowuta na bikóló bizali na bitumba to bazali kobunda na makambo makasi, lokola Liban, Irak, Birmanie, Ukraine, Israël, Syrie pe Sudan ya Súdi.

Manaka

Mgr Fisichella alakisaki na simá milongó minene ya manaka ya mikolo bipesami na bilenge. Kobánda mokolo ya yambo 28 ya sánzá ya sambo, ndámbo ya milio ya bato ya mobémbo mwa boyambi ekokóma. Po na koyamba bango, ba paloise 270, biteyelo 400, bisika bakolakisa bana nzela ya kelasi 40, ba ndáko ya Protection civile, ba ndáko ya masano pe mabótá ebele bibongisami po na yango. Mokolo ena ekokona na ebándeli ya Zubilé ya ba missionnaires numériques, baye bayebani na kómbó ya ba influenceurs.

Po na bopesi bilei na bilenge, bisika 20 bibongisami po na yango, na bondimisama moko (accréditation) po na bozui bilei ya tóngo pe ya midi. Mokolo ya 29 bikobánda Masolo na mboká, elingi koloba makambo 70 biye, mikolo ya mibale, ya misáto pe ya minei, “bikosalema na bisika ya Roma”.

Mokolo ya yambo ya sánzá ya mwambi, “mokolo ya tubela” ekosalema na Cirque Maxime na ba sángó 200 baye, ba ngonga mibale nionso, bakosala ngala na ngala na sé ba hema ya minene bitiami po na “kosala esika moko ya kopema”. Mokolo ya 2 ya sánzá ya mwambi, úta ngonga ya 9, bizibeli ya esika ya Tor Vegata bikofungwama, na nzinganzinga ya Roma. Masangá ebele pe bato ya ntoki bakozala na mosála esika ena kino ngonga ya 20 na ndámbo, eleko eye ekobánda butú ya losámbo na Papá Léon XIV. Po na yango, bilenge misáto ya Italie, ya Mexique pe y’Amerika bakotúna mituna ebele na Papá wa Roma “oyo akoyanola bango na nkótá na bango”, liboso ya kosala misa mokolo ya eyenga na tóngo.

24 sánzá ya nsambo 2025, 14:20