MAP

Likita kati ya Gallagher na Jean Noel Barrot na Vatican Likita kati ya Gallagher na Jean Noel Barrot na Vatican 

Mgr Gallagher ayambi ministre ya Makambo ya bapaya ya France

Secrétaire ya Ngwende ya Santu-Petelo pe ya Boyokani na Bikolo pe masanga ya mokili, Mgr Paul Richard Gallagher, ayambaki ministre ya Makambo ya bapaya ya France, Jean-Noël Barrot, mokolo ya mitano 11 ya sánzá ya sambo na Vatican, elobi Quai ya Orsay. Ministre azalaki na likita ya inei po ya botongi lisusu Ukraine eye esalemaki na Roma mikolo ya 10 pe 11 ya sánzá ya sambo.

Jean-René B-Kinshasa

O eleko ya bosololi ena, ministre ya Makambo ya bapaya ya France pe Mgr Paul Richard Gallagher balobaki bisika ya bitumba na Ukraine pe na Proche-Orient, engebene na communiqué moko ya ministère ya Makambo ya bapaya ya France ebimaki mokolo ya 11 ya sánzá ya sambo. Na bobeti maboko na emonela ya Vatican po ya lisolo zambi ya kosunga ba nzela ya bolúki kimia ya seko, ministre ya France alingaki alobela lisusu na Gallagher ‘te France emipesi «po ya bobateli makoki (droits), biteyelo pe libula ya bakristu ya Monyele», «zambi engúmba eye ekoka kozua kimia pe bokengi na nzela ya bokeseni ya bato ebele». Quai ya Orsay ekosunga biteyelo bilobaka lifalanse na Moyen-Orient na nzela ya fonds moko po na biteyelo ya Monyele esalema na 2020 na boyokani na Œuvre ya Orient.  

Ngwende ya Santu-Petelo pe France

Sánzá mibale sima ya liponami ya Papá Léon XIV, pe bosololi ya yambo na nzela ya singa kati na Emmanuel Macron pe Papá mokolo ya 15 ya sánzá ya mitano elekaki, ministre atindelaki “liloba moko ya bondeko” na Léon XIV pe alingaki ‘te mosala ya Papá ya sika ekoka komema “kimia, bomoko pe elikya”. “Boyokani ya malonga koleka kati na France pe Ngwende ya Santu-Petelo” elobamaki na Jean-Noël Barrot pe Mgr Gallagher, elobi ministère ya Makambo ya bapaya ya France, na botangi mibembo misato ya Papá François na France (Strasbourg, Marseille pe Ajaccio), na lokola mibú mokámá ya boyokani Poincaré-Cerreti ya 1924 ekundolamaki na sánzá ya yambo eleki na Paris na likita moko epayi wapi episkopo ya lokúmu Pietro Parolin azalaki. Boyokani ena, etiamaka maboko na 1924, esungaka ya bopesi statut juridique moko na Eklezia katoliko na France.

Ministre ya France alobaki lisusu bobongisi ya Zubilé ya Elikya, eye, ekobaki ye, “France ekopesa makasi” na nzela ya misala ya ndako ya ntoma na ye epayi ya Ngwende ya Santu-Petelo, ya lisanga ya ba episkopo ya France pe ba Ndako ya losambo ya France na Roma.  

13 sánzá ya nsambo 2025, 09:32