MAP

Episkopo ya lokumu Pietro Parolin Episkopo ya lokumu Pietro Parolin  (ANSA)

Episkopo ya lokúmu Parolin: “ba kómbó bitangamaki na Papá bikolakisa bato banso bazui pási na Gaza”

Episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Leta apesaki makanisi na ye na mbela ya Papá simá ya losámbo y’Anzelus na ba media ya Vatican. “Tokosenga na mawá súka ya pási ená”, elobaki ye lisusu.

Nsango ya Vatican

O eleko y’Anzelus ya eyenga eye ya 20 ya sánzá ya sambo, Papá Léon XIV atangaki bakómbó misáto ya baye bakufaki na mobúlú ya Israël esalemaki mokolo ya minei ya 17 ya sánzá ya sambo na ndáko-Nzámbe Libótá-Esántu ya Gaza, kasi bakómbó biná “bikolakisa bato banso bazuaki pási” na Gaza. Waná ezali eye episkopo ya lokúmu Pietro Parolin alobaki na ba media ya Vatican, úta Fiera di Primiero, na Trentin, epayi wapi avandi na presbytère ya Siror po na mwá mikolo ya bopemi.

O eleko y’Anzelus ya lelo, tango azongelaki makambo ya mawá bikoleka sik’oyo na Gaza, Sántu-Papá atangaki polélé bato basusu bazuaki pási. Ezali ya sóló ‘te bakómbó ya bato biná bikolakisa bato banso baye bazuaki pási na likambo ya mawá ya Gaza”, elobaki Secrétaire ya Leta ya Ngwende ya Sántu-Papá.

Ezali na bokeseni soki moke te kati na bango, elobaki episkopo ya lokúmu Parolin, bango banso bazui pási na mobúlú ekoki kondimama te, bango banso bazali bato bazui pási na etumba eye esengeli esila na lombángo. Tokomema bango, tozoyoka bango ya sóló bazali na motéma na bisó pe po ya banso, po ya banso, tokosenga na mawá kimia ya Nzámbe pe mingi mingi, na likoló ya komibonza na bango, na makila na bango, súka ya likambo eye ya pási”  

23 sánzá ya nsambo 2025, 12:39