Zubilé ya Ngwende-Esantu : bokundoli moko ya boyambi, ya bomoko pe ya elikya
Jean-René B.- Kinshasa
Pápa François oyo atika biso apesaka na mamelo Maria Gloria Riva, ya Bakumbameli ya tango inso ya Sacramento-Esantu Koleka, bomanyoli ya Zubilé ya Ngwende-Esantu, etiamaki na likambo ya bolandi: « Bosangani ya katoliko ya mokili mobimba po ya boyambi, bomoko pe bokóli na molimo mokolo ya 9 ya sanza ya motoba 2025 ».
Elikya na Biblia
Na mokili moko ezuami na mondialisation, mamelo ya ekolo Italie, alobaki o libandeli ya bomanyoli na ye na ndako ya makita Polo ya Motoba “motuya ya Bikolo ya mike”. Po, elimboli ye “Bikolo bina ya mike, na mimeseno na bango moko pe ya kala, bizali kobatela elikya na mokili moko eye ekoki kobungisa misisa na ye ya lisapo”. Mamelo alimbolaki na bolayi, lisusu, likambo ya elikya na Biblia. Alobi ‘te na monoko ya hébreu na Biblia, “moto oyo azali na elikya, akangami na eye eleka na ye, azali na makoki ya komipesa na eye ekoya na kobika na eye ya lelo na bobendani”.
Bokokanisi kati na eye eleka pe eye ekoya
“Lolenge nini tokoki lelo, na Eklezia na biso, na ekolo eye ya moke eye Eklezia ezali kokonza, kobatela na bomoyi bobendani ena kati na eye eleka na eye ekoya?”. Eyano, po ya memelo Gloria Riva, ezali na “bokokanisi kati na eye eleka na eye ekoya”. Ezali bongo po na mamelo “mosisa enene ya elikya”.
Mamelo Maria Gloria Riva, amoni ‘te eye eleka, ya solo, “na ba pasi pe bisengo na yango”, ekoki kozala “esika moko ya malamu ya bobongisi lobiko na eye ya lelo na bobendani moko ya sembo”.
Elikya evandi na bomoi ya seko
Po na mamelo Mokumbameli ya tango inso ya Sacramento-Esantu Koleka, botombwani ya tekiniki esalemi mibu mileki ezali “litomba moko monene”, kasi lokola “libaku moko enene”. Na mokili moko epayi wapi mabaku ya malamu bipesami na nzela ya bisaleli ya bosololi ya bato bizali kobongisa lolenge ya sika ya bomoi, mamelo akebisi na eye etali ‘te “bisaleli miango bisengeli bizuama lokola bizali pe bikosenga ‘te mosaleli aboya misisa na ye te, amipesa na bokimi mbangu te”mingi mingi “ayeba malamu lolenge ya kotambola”
Lolenge ya Zubilé 2025
Mamelo alobi ‘te lolenge ya mozindo ya Zubilé eye ezali “ya kosunga biso na komanyola” pe “ya komituna lolenge ya bomoi na biso”. Etunela ena, elobi ye, ekoki kotúmola “mobulu moko na molimo, liyoki moko ya eseke to ya bozangi”. Ezali se na ba ngonga bina nde emonanaka “mwana moke ena ya eloko te eye ezali elikya”. Na bosolo, elimbolaki ye, “soki boyambi pe bolingo bisengeli na biso po na kobika lisanga na Nzambe pe na bato, elikya esengeli na biso po na kososola nzela ya lisapo”.