MAP

Edizione speciale ya Radio Vatikan mpo ya conclave 2025 Edizione speciale ya Radio Vatikan mpo ya conclave 2025  

Kolanda o ngonga ezali koleka milulu mya conclave na nzela ya Radio Vatikan

Dicastère mpo ya Communication ya Saint-Siège, mingi mpenza Radio Vatican, Vatican News mpe ezali. Ezali kotiya eloko moko ya somo mpo na kolakisa manso ezali koleka na conclave, na ba lokota zomi na moko (11 langues). Radio Vatican na lokotà ya lifalansa ekozala emission oyo ekopesa biso bansango tongo mpe mpokwa na bowumeli ya maponomi nakozela molinga mwa mpembe.

Bansàngo ya Vatikan

 

Bandà mokolo mwa misàto mwa 7 ya sànzà ya mayi, Radio vatikan – Vatikan News ekolekisa na tango makambo ezali koleka, mpe na mondovision Misa ya Pro eligendoromano pontefice, ekokambama na episkopo wa lokùmu Re, oyo azali doyen ya collège ya ba cardinaux. Na ngonga ya 9h55, milùlù mya Ukaristya ekolandama na portail ya vatikannews.va, na ba lokasa ya Facebook mpe na chaine ya Youtube “vatikannewsfr”. Na sima ya nzàngà na ngonga ya 16h15, ekolakisa molongo mwa baepiskopo wa lokùmu oyo bakopona bakolongwa na chapelle Pauline mpo kokende na oyo ya Sixtine; manso makoleka na lokotà ya lifalansa, mpe bakolekisa yango mbala mosusu kaka na ba nzela enà.

Na mokolo, koleka bangonga mineyi, ya maye mazali koleka.

Ndako ya bopanzi nsango ya lokotà ya lifalansa ya Radio Vatican ezali kolengele mpo ya kolekisela bato, kobanda mokolo mwa mineyi na tongo ya mokolo mwa mwambé (8) ya sànzà ya mayi, na lisalisi ya ba radio RCF-Notre Dame, Radio Fidelité Nantes mpe Radios Chretiennes Associées (RCA), ba “emissions ‘spécial conclave’ ya 10h20 tee na 12h30 mpe na 17h20 tee na 19h30, elongo na baye banbengaki, ba masolo, lolenge bato bazali kozwa makambo yango, baye batindaki na place Saint-Pierre, mpo na kolobela, kososola mpe kolekisa conclave, molinga ya mpembe, na mpe maloba mayambo oyo mokitani ya mosantu Petro ya mbala ya nkàma mibale na tukù motobà na motobà akoloba”.

Ba emission eye ekolakisama mpe na ba radio oyo esalaka elongo nà Radio ya Vatikan bipayi binso na mokili, mpe na mabele ya Afrika bisika wapi balobaka lifalansa.

Radio Vatikan – Vatikan News etie makoki manso mpo ya kolekisa na tango makambo mazali koleka, maponomi ya Mokonzi monene ya bantomà na balokotà zomi na moko mpe na lokotà ya bilembo, na ba lokotà tukù mitano na motobà (56) ya site ya vatikannews.va mpe Osservatore Romano. 

Ba Chaine na ba plateforme na ngonga makambo ezali koleka.

Na bozindo, makambo maye mazali koleka ekoki kolakisama na banzela eye: 

- na portail ya bansango ya Vatikan (www.vaticannews.va)

- na ba chaine ya YouTube ya Vatikan News

- na Webradio Vatikan News ya Radio Vatikan na balokotà zomi na moko

- na Facebook, na lokotà ya italien, anglais, français, espagnole, portugais, allemand

- mpe na ebele ya ba radio nkama oyo esàlaka elongo nà dicastère ya communication ya Saint-Siège

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye. 

07 sánzá ya mítáno 2025, 12:59