MAP

2025.05.05 11ª Congregazione Cardinali 2025.05.05 11ª Congregazione Cardinali  (@Vatican Media)

Ba episkopo ya lokumu bakokoba bomanyoli na bango pe basali elili ya “Papa mobateli”

Pembeni ya 170 ya ba epsikopo ya lokumu, kati na bango 132 baye bakopono Papa ya sika, bazalaki na congrégation générale ya mbala ya 11, eye esalemaki mokolo ya yambo 5 ya sanza ya mitano, kobanda ngonga ya 17 kino 19. Basololaki makambo ebele, mingi penza bomipesi pe mokumba ya kosunga Papa ya sika. Ba episkopo ya lokumu bakolikia tè Papa ya sika akoluka lisolo pe botongi boyokani na biyamba na bonkoko misusu.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Pembeni ya 170 ya ba epsikopo ya lokumu, kati na bango 132 baye bakopono Papa ya sika, bazalaki na congrégation générale ya mbala ya 11, eye esalemaki mokolo ya yambo na pokwa, po na kokanisa Papa oyo akoya pe mosala ya Eklezia na mokili. Ba episkopo ya lokumu bazuaki mokano poso eleki ya kobakisa bokutani moko na pokwa eye, elongo na bokutani ya momeseno ya tongo, zambi ya kopesa maloba na baye banso balingi liboso ya ebandeli ya conclave mokolo ya 7 ya sanza ya minei. Sango wana epesamaki na mokambi ya Ndako ya bapanzi nsango ya Vatican Matteo Bruni. Bato ntuku mibale bazuaki maloba na bokutani ena eye ebandaki na ngonga ya 17 pe esilaki na ngonga ya 19. Mokolo ya mibale, ekozala kaka congrégation moko na tongo na ngonga ya libwa.

Ba episkopo ya lokumu basololaki makambo ebele, mingi penza bomipesi pe mokumba ya kosunga Papa ya sika. basali lisusu elili ya Papa “mobateli” oyo babengi na lopoto “Pape pasteur”, oyo ba episkopo ya lokumu bakolikia tè akoluka lisolo pe botongi boyokani na biyamba na bonkoko misusu. Makambo misusu pe bilobamaki.

Bobongisi conclave

Ndako ya bapanzi nsango elobaki lisusu tè lobi elekaki sima ya nzanga, bato nkama moko ya baye bakosala na conclave, bamibonza pe balaïki, bakolapa ndai ya sekele na chapelle Pauline. Kobanda mokolo ya mibale, 6 ya sanza ya mitano, kino mokolo ya misato na tongo, liboso ya misa «Pro eligendo Pontifice», na ngonga ya zomi, ba episkopo ya lokumu baye bakopono Papa ya sika bakobanda kokota na ndako Santu-Martha, po bazua bisika ya kolala bibongisami po na bango.

Buro ya mokambi ya Vatican esakolaki mokolo ya liboso tè kobanda ngonga ya 15 mokolo ya 7 ya sanza ya mitano, “bisalelo binso ya bokaboli nsango na ba nzela ya singa ya radio, biye bizali na Vatican, na bolongoli kaka esika ya Castel Gandolfo, bikosala te”. Mokano ena ezuami zambi ya kobomba ba episkopo ya lokumu o eleko ya conclave. Nionso ekozonga n’alima sima ya bosakoli boponami ya Papa ya sika.

 

 

06 sánzá ya mítáno 2025, 13:53