Ba episkopo ya lokumu bakobenga bandimi basambela po na kimia na mokili
Nsango ya Vatican
Basangani na congrégation générale liboso ya conclave, ba episkopo ya lokumu balobaki mokolo ya 6 ya sanza ya mitano eye ezali kotungisa bango po na bato bazali konyokwama na bitumba na mokili.
Mokili elembi likolo ya bitumba
窶Biso, ba episkopo ya lokumu ya Eklezia Esantu ya Roma, tosangani na congrégation générale liboso ya conclave, ekomami na communiqué, tomoni na mawa, tè eloko moko esalemi te po na boluki kimia na Ukraine, na Proche-Orient pe na bisika ebele na mokili窶.
Nsambo ya bandimi zambi ya kimia
Na botali mobulu maye bibakisami 窶mingimingi epayi ya bato bazanga mandoki窶, mbela ebwakami na 窶baye banso bazali kati na bitumba po na kozima moto po na libela窶. Lisanga ya ba episkopo ya lokumu ekosenga 窶masolo bizangi mabaku窶 kati na baye bazali kobunda.
Na bokundoli lolenge nini bato bazali konyokwama na bitumba balingi kobika na kimia, babengaki bandimi banso bakolisa losambo na bango epayi ya Mokonzi zambi ya kimia ya sembo pe ekowumela na mokili mobimba.