ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.05.06 12?? Congregazione Cardinali 2025.05.06 12?? Congregazione Cardinali  (@VATICAN MEDIA)

Ba episkopo ya lokumu bakobenga bandimi basambela po na kimia na mokili

Na liloba moko ebimi mokolo ya mibale ya 6 ya sanza ya mitano, liboso ya bobandi ya conclave, Lisanga ya ba episkopo ya lokumu etelemeli likambo ya komona t¨¨ ¡°eloko moko ya malonga esalemi te na boluki kimia na Ukraine, na Proche-Orient pe na bisika ebele ya mokili¡±.

Nsango ya Vatican

Basangani na congrégation générale liboso ya conclave, ba episkopo ya lokumu balobaki mokolo ya 6 ya sanza ya mitano eye ezali kotungisa bango po na bato bazali konyokwama na bitumba na mokili.

Mokili elembi likolo ya bitumba

¡°Biso, ba episkopo ya lokumu ya Eklezia Esantu ya Roma, tosangani na congrégation générale liboso ya conclave, ekomami na communiqué, tomoni na mawa, tè eloko moko esalemi te po na boluki kimia na Ukraine, na Proche-Orient pe na bisika ebele na mokili¡±.

Nsambo ya bandimi zambi ya kimia

Na botali mobulu maye bibakisami ¡°mingimingi  epayi ya bato bazanga mandoki¡±, mbela ebwakami na ¡°baye banso bazali kati na bitumba po na kozima moto po na libela¡±. Lisanga ya ba episkopo ya lokumu ekosenga ¡°masolo bizangi mabaku¡± kati na baye bazali kobunda.

Na bokundoli lolenge nini bato bazali konyokwama na bitumba balingi kobika na kimia, babengaki bandimi banso bakolisa losambo na bango epayi ya Mokonzi zambi ya kimia ya sembo pe ekowumela na mokili mobimba.  

 

07 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 11:41