MAP

Palm Sunday Mass in St. Peter's Square at the Vatican Palm Sunday Mass in St. Peter's Square at the Vatican 

Ba misa pe makanisi ya losambo, mobeko moko ya sika nzambi ya polele pe bosembolami koleka

Mobeko moko ya dicastère etalaka likambo ya ba Sango endimami mokolo ya eyenga 13 ya sanza ya minei ebongisi likambo ya makanisi ya ba Misa Bisantu, na bokotisi mwa mibeko ya peto koleka nzambi ya kosalisa po na polele, bosembolami pe botosi posa ya bandimi.

Nsango ya Vatican

Dicastère etalaka likambo ya ba Sango ebongisi likambo etali makanisi ya losambo ya ba Misa Bisantu pe ya mabonza, na bokotisi mwa mibeko ya peto koleka nzambi ya kosalisa po na polele, bosembolami pe botosi posa ya bandimi. Mobeko endimami na Papa François na lolenge na yango mokolo ya eyenga 13 ya sanza ya minei, bosaleli ya mobeko ena ekobanda mokolo 20 ya sanza ya minei, na eyenga ya Pasika.

Momeseno moko ya kobatela

Ezali moko ya ba lolenge ya solo na nzela na yango bandimi bazali kosala po ya bomoi ya Eklezia: kosenga tè misa moko esalema po ya bato bazali na bomoi to po na bawa. Momeseno moko ya kala makasi, ebongisama na bilendiseli ya mozindo zambi ya losambo pe ya molimo. Kino sik’oyo ekotambola na bizaleli biye bikosunga, epayi moko, ya kobatela liloba epesami na moto apesi mosolo pe, epayi mosusu, ya kolongola bobangi ya kosala ‘mombongo’ na eloko esantu. Na nguya ya esalela ena, bandimi, na libonza, esemboli mokanda, “bizali na posa ya kosangana makasi lisusu na Mbeka ya communion na bobakisi mbeka na bango moko pe na bosali elongo na ba posa ya Eklezia, mingimingi, na kosunga evandela ya ba mibonza”. Yango wana, bandimi “bakokangama na ndenge ya kati makasi na Kristu oyo amipesi pe bazali, na lolenge mosusu, kokangama na Ye na mozindo koleka lisusu”, lolenge ya esalela moko eye “endimama kaka te na Eklezia, kasi ezali kotombola yango lokola”.

Mokanda -eye ekotisi pe esemboli mikano miye bizali na mobeko Mos iugiter ya 1991- ebotami na bosenga ya koyanola na mituna misusu makasi biye bibimi na esalelo pe mpenza-mpenza na oyo etali ba misa na makanisi ya losambo ya “lisanga”, elingi koloba lisusu ba misa bizali na makanisi ya losambo bebo na molulu moko.  

Bondimi ya bapesi mosolo esengeli ezala polele

Dicastère ekambemi na episkopo ya lokumu Lazzaro You Heung-sik elobi tè, soki likita ya province to lisanga ya ba epsikopo ya province ezui mokano, “ba sango bakoki kondima mabonza ebele ya bapesi losambo bakeseni, na bosangisi yango na misusu pe na bokokisi yango na misa moko, esalemi na lolenge ya likanisi moko ya losambo ya ‘lisanga’, soki -pe soki kaka- bapesi losambo nionso bayebi pe bandimi na bonsomi”. Ekomami polele tè na bozangi ya “bondimi ya lisanga”, posa ya bapesi losambo “ekoki kokanisama soki moke te”. Nzokande, “na bozangi ena, ekokanisami kaka tè ekopesama te”.

Soki liboso liboso esengi tè “lisanga ya bakristu moko moko alingi apesa likoki ya kosala mokolo na mokolo ba misa na losambo moko ya lisanga”, sango, lokola Mobeko esemboli, “akoki kosala ba misa bikeseni atako na lolenge ya makanisi ya losambo ya ‘lisanga’, na botikali ngwi na likambo epesameli na ye ya kozua, mokolo na mokolo, kaka libonza moko po na losambo moko kati ya baye bindimami”.

Kolandela ba sacramento ya babola pe kosunga etinda

Lisusu, mobeko ezongisi lisusu mabongisi maye bizali kosalema kala, ndenge lokola “sango, likolo ya mabonza biyebani na mokonzi na ye, akoki kosenga eloko moko te po na bopesi ba sacrameto, na koboya tango inso tè baye bazangi bakoka kozua lisungi ya ba sacramento te likolo ya mobola”. Esembolami epayi esusu tè episkopo ya diocèse moko moko akoki, na botali makambo misusu ya Eklezia na ye pe ya ba sango na ye, abongisa bopesi mabonza “na ba paloisses bazali na bosenga na diocèse na ye moko to na ba diocèses misusu na bikolo ya etinda”.    

Kobatela pe kokebisa misala ya mabe

Ba episkopo na ba sango babengami po ya bofungoli miso, na kosala tè likanisi moko moko ya losambo na libonza bikomama na ba buku bibongisami po na yango, pe na botali tè “bokeseni kati na bosengi losambo moko songolo na misa (atako ezali ya lisanga) pe likanisi ya pamba o eleko ya misa to na ba ngonga misusu ya misa” bizala polele po na banso.

Bolandeli sima ya mibu zomi

Na suka, dicastère etalaka likambo ya ba Sango esakoli tè sima ya mibu zomi ya bosaleli mikano miye, akosenga koyekola esalelo ya mibeko yango po na “bolandeli”  lolenge nini elekaki pe kobongisa soki ekosenga.

14 sánzá ya mínei 2025, 16:44