杏MAP导航

Rosary prayer for 杏MAP导航 Francis at St. Peter's Square Rosary prayer for 杏MAP导航 Francis at St. Peter's Square  (ANSA)

Bozongi ya Papa na Vatican, elembo ya elikya mpo na baye bazali na mpasi

O esika Santu Petelo mokolo ya eyenga 23 ya sanza ya misato, Sapele esalemaki mpo na bozongi ya Papa. Azongaki mokolo ena na ndako santu Martha nsima ya bolekisi mposo mitano na lopitalo Gemelli. Episkopo ya lokumu Gambetti oyo akambaki losambo alobaki: 鈥淟osambo eye ezalaki na ye na sanza eye ya bobangi ekoba mpe ekoma bosengi moko na Mokonzi mpo abenisa Papa mpo libiki na ye na lombangu mpe mobimba, na bopesi ye makasi mpe bokolongono ya nzoto mpo akoba kokamba bana ya Nzambe鈥

Nsango ya Vatican

Ezali esengo enene ndenge Papa azongi epayi na ye, mpe tolingi totondo Nzambe, na Maria. Bandeko ya mibali mpe ya basi ya ntalo, tosangani lisusu na esika eye mpo na losambo, bomoko na motema mpe na elimo mpo na Santu Papa na biso tolingaka mingi, Papa François, oyo Eklezia azeli na kotia motema makasi na eleko eye ya mpasi. Tika ete bozongi na ye na ndako, awa na Vatican, na kati ya Eklezia, ezala elembo ya elikia mpo na baye banso, na eleko eye, bazali kobunda na mpasi na molende mpe na elikia鈥. Ezali na maloba maye nde episkopo ya lokumu ya basilique ya Vatican, Mauro Gambetti, abandaki eyenga ya 23 ya sanza ya misato, na esika Santu Petelo, Sapele mpo na Papa oyo abimaki na ntongo ya lelo na lopitalo Gemelli, nsima ya bolekisi sanza moko kuna.

Bokutani ezalaki kosalema mpokwa inso kobanda mokolo ya liboso 24 ya sanza ya mibale mpo na bosengi ngolu ya libiki ya Papa. 鈥Losambo na biso, eye ezalaki elongo na ye na sanza eye ya bobangi ekoba mpe ekoma bosengi moko na Mokonzi mpo abenisa Papa mpo libiki na ye na lombangu mpe mobimba, na bopesi ye makasi mpe bokolongono ya nzoto mpo akoba kokamba bana ya Nzambe na bolingo, na bwanya mpe na mpiko鈥, elobaki episkopo ya lokumu Gambetti. Mgr abengi bandimi na bomanyoli mibombamo nionso ya rosario 鈥na boluki bolobeli ya Maria, Mama ya Eklezia, mpo akoba kosunga na bomama na ye Papa na biso鈥.

Bolobi mibombamo ya nkembo

Liboso ya elili ya Maria Mama ya Eklezia etiamaki na etando ya basilique ya Vatican, vicaire général ya Santu Papa akambaki losambo ya Maria liboso ya ba episkopo ya lokumu misusu, ba episkopo, ba sango, ba mamelo ya Curie ya Roma, mpe bandimi ebele basanganaki lokola mpo na kotika na bolobeli ya Ngondo mokitani ya Santu Petelo. Nsima ya bomanyoli mibombamo ya nkembo mpe bolobi Salve Regina, mokambi asukisaki na litanie ya Lorette, na bobeleli Nzambe mpo apesa 鈥bokolongono ya nzoto mpe ya molimo鈥, abatela biso na 鈥mabe maye bikopesa biso mawa鈥 mpe amema biso na 鈥esengo ya nsuka te鈥. Na nsuka, lisanga eyembaki Oremus pro Pontifice mpe episkopo ya lokumu asukisaki liyangani na bobenisi bato.  

25 s谩nz谩 ya m铆s谩to 2025, 15:25