Jubilé: ba diakono balingi bazala «bilembo” ya bokabi mpe ya liloba
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
Molongo ya bato ezalaki molayi. Ba nkama ya ba pelèrins bazalaki kozela ngonga na bango, nsima ye ekuluse moko, mpe mingi balataki elamba ekolakisa bodiakono na bango.
Bazalaki koleka 6000 bandimi, badiakono, basi ya ba diakono, ba sango mpe ba episkopo ya kosangana mpo na Jubilé ya ba diakono, libongisami ya minei ya mobu eye 2025. Mpo na François Fayol, mokambi ya Lisanga ya bodiakono na France, jubilé eye ezali eleko ya “kokolisa esika na tente, lokola Isaie akokaki koloba, mpo na kokutana na basongolo na bapakala”. Na ba boloko, na biteyelo, epayi ya babola mpe bibosono, epayi ya bakatekisi, misala ya ba diakono bizali bebo, mpe “ntango inso “bibaluki pembeni ya bituka”, elobaki Fayol.
Bilembo ya nsekwa
Likambo ya yambo na boyambi na Kristu, ezali eye elobi lisusu Mgr Laurent Percerou, episkopo ya Nantes : « Ezali mpo nandimi Yezu yango nazali pembeni ya babola, pamba tè bozangi kopesa Nsango Elamu na botatoli te bipayi ya baye bazali na bosenga »
Mgr Laurent Percerou andimi elembo ya Elimo Santu na boponi ya Papa ya kotia Jubilé na nse ya likambo ya elikya, na « mokili moko etungisami mingi ». Baye banso bazua batisimo, kasi mingi mpenza ba diakono, babengami bazala ba pelèrins ya elikya, “na bozali na bango pembeni ya bituka, na bisika ya kimobola », na yango kolakisa « na kati mpenza ya bomoi ya Ekelzia mpe ya mokili, bilembo ya nsekwa bizali ».