Mgr Gallagher asukisi mobembo na ye na Congo-Brazzaville
Jean-René Bompolonga -Kinshasa
¡°Na molulu eye ya bofungoli misala ya Commisssion mixte mpo na bosaleli Accord-cadre kati na Congo-Brazzaville na Vatican, tokomona lelo mokolo moko ya lisapo¡±, elobaki Mgr Gallagher na lisikulu na ye. Liboso ya batindami ya bulamatari ya Congo-Brazzaville, ya Eklezia ya ekolo mpe liboso ya ntoma ya Papa na Congo-Brazzaville mpe na Gabon, Secrétaire ya Vatican mpo na boyokani na Bikolo na ba masanga ya mokili alobaki lolenge ya boyokani kati na Congo-Brazzaville na Vatican. Abimisaki ntina y¡¯Accord-cadre mpo na boyokani mpe kosala elongo kati na bikolo mibale, baye bakokanisa na 2027 mibu ntuku mitano ya boyokani na bango.
Etiamaki maboko mokolo ya misato ya sanza ya mibale ya mobu nkoto mibale na zomi na sambo, Accord-cadre ezali ¡°mbano ya nzela molayi ya boyokani elamu mpe ya bosali lisanga kati na Vatican mpe bulamatari ya Congo-Brazzaville¡±. Misala mpe masolo ya mibeko bikowuta na Commission mixte mpo na bosaleli Accord-cadre kati na bikolo mibale, elimbolaki ye, bikozala mpo na ¡°kokolisa boyokani kati na ba masanga ya bulamatari oyo ekoki kosunga kosala elongo malamu na makambo lolenge na lolenge mpo na bolamu ya banso¡±.&²Ô²ú²õ±è;&²Ô²ú²õ±è;
Kolendisa boyokani na oyo etali botangisi, bokolongono bwa nzoto, bosungi ya molimo mampinga ya ekolo
Mgr Gallagher alimbolaki oyo ezali kati n¡¯Accord, eye ¡°ekopesa esika ya mobeko ya personnalité publique ya Eklezia katoliko na Congo-Brazzaville¡±. Kaka na ngonga wana alobaki mokano ya mokili mobimba ya kosala elongo kati na Bikolo mpe ¡°bolamu ya banso ya kotombola na mibu bikoya ya boyokani bikeseni, kati na bango, oyo etali botangisi, bokolongono ya nzoto mpe na bosungi na molimo mampinga ya ekolo¡±. Boyokani ya boye ekolendisa boyokani elamu eye ezali kati na bikolo mibale na lolenge ya bango mibale mpe ya mokili mobimba, emonaki diplomate ya Vatican. Boyokani ena, elobaki ye, ekoluka kotombola malamu ba nzela ya boboto mpe ya bolimbisani na mokili moko etungisami mabe na bitumba mpe bokabwani ya mozindo kati na bato.
Mobembo ya mokonzi Denis Sassou Nguesso na Vatican
Boyokani kati na Congo-Brazzaville mpe na Vatican esali makambo ebele kobanda babongisaka boyokani kati na bikolo mibale na mobu nkoto moko na nkama libwa na ntuku sambo na sambo, na botomboli biloko ebele ya ntina baye bikolo mibale bakabolaka, elobaki Mgr Gallagher. Mobembo na sanza ya zomi na moko ya mobu nkoto mibale na ntuku mibale na minei na Vatican ya Denis Sassou Nguesso, ezali ¡°likambo ya polele ya boyokani malamu kati na bikolo mibale¡±, lolenge emoni Secrétaire ya Vatican mpo na boyokani na Bikolo na ba masanga ya mokili. Santu Papa na mokonzi ya Congo bamonaki ntina makasi ya bosololi mpe ya bondeko lokola bisalelo bilenda na bosilisi bitumba ya mokili na ngonga eye, elobaki episkopo ya lokumu. Na yango, akosambela mpo ete boyokani mana bikoba kobota ba mbuma kitoko, na bosengi ete bikoka kolakisa ¡°na boluki makasi ya bosololi mpe ya botosi, na bisika binso ya bato, kati na mokili ya masanga mpe mokili ya kondima¡±.
¡°Kokanisa na mokano ya kilaïki moko ya kotonga mpe ya kosangisa¡±
Kati na makambo ya boyokani ekobota mbuma elamu kati na Vatican na Congo-Brazzaville, Mgr Gallagher alobaki lokola likambo ya bopanzi nsango elamu. Bofungoli misala ya Commission mixte, emonaki ye, ezali eteni moko eye ekangemi na ¡°mosala moko monene mpe ya kala, eye ememaki eleki mibu nkama moko na ntuku minei, na bokutani elamu mpe esengo kati na Nsango Elamu ya Kristu mpe bokoko ya lolenge na lolenge awa na ekolo Congo¡±. Bokutani eye esungaki mpo na kobanda ¡°nzela moko ya bondeko, ya koteya makanisi, ya kotombola bomoto, lisanga mpe bokolisi bondeko, na lokola kosala elongo elamu kati na masanga¡±. Lelo, bozali ya katoliko ezali kati na lisapo mpe bokoko ya Congo, lokola misala mpe biyamba misusu. Congo-Brazzaville ezali lelo ndakisa moko ya bofandi na kimia na oyo etali biyamba mpe bokoko kilikili, elobaki motindami ya Papa.
Eleko ya sika ya bondeko mpe ya botosi ya moninga
Na lisikulu na ye, Mgr Gallagher alobaki likambo etali nzinganzinga, eye ekomi mbala moko na Congo, ekolo ezali na moko ya ba écosystèmes ya motuya ya mokili, mpe ezali kotungisama na changement climatique. Azongelaki maloba maye Papa François asalaka na encyclique Laudato Si mpe na makomi misusu, na bobengi ¡°ya kokolisa horizon mpo na kobatela elongo ndako ya biso banso¡±. Kaka se bongo, Secrétaire ya Vatican mpo na boyokani na Bikolo na ba masanga ya mokili abeti nsete na ¡°bokolisi na lombango botomboli mobimba ya bato¡±, na bopesi na banso ¡°makoki ya kokola na likambo ya mosala mpe ya ye moko¡±, na bosali ete moto nionso azua makoki ya lobiko ¡°lokola bilei, mayi, kobikisa nzoto, botangi mpe boyekoli etali tekiniki, mpe na bozali na bonsomi mpo etali makanisi mpe maloba¡±. Bizali mituna ya mindondo maye bisengeli eleko ya sika na bondeko mpe botosi moninga, elobaki Mgr Gallagher, oyo azongelaki mposa ya Vatican ya bokobi komema, na nzela ya mosala ya Lisanga ya ba episkopo, ya ye eloko ¡°mpo na lisungi ya botomboli lolenge elongobani mpe lisanga ya bana nionso ya ekolo¡±.
Akomaki na Brazzaville mokolo ya poso ya zomi na moko ya sanza ya liboso, Secrétaire ya Vatican mpo na boyokani na Bikolo na ba masanga ya mokili alekisi mikolo minei na mboka mokonzi ya Congo. Longola bofungoli misala ya Commission mixte mpo na bosali y¡¯Accord-cadre, likambo ya ntina ya mobembo na ye, akendeki na lilita ya Mosali na Nzambe episkopo ya lokumu Emile Biayenda, episkopo ya lokumu ya liboso mpe moko ya Congo, oyo babetaka masasi na mobu 1977, mpe Eklezia ya Congo ekosenga béatification na ye. Mokolo ya eyenga ya zomi na mibale ya sanza ya liboso, Mgr Gallagher asalaki misa o eleko ya batisimo ya Mokonzi, eye elakisaki lokola Jubilé ya misala ya eklezia. Mobembo na ye esukaki na bokutani na mokambi ya ekolo Denis Sassou Nguesso mokolo ya mibale ya zomi na minei ya sanza ya yambo.