ÐÓMAPµ¼º½

Luka

31st OSCE Ministerial Meeting in Malta 31st OSCE Ministerial Meeting in Malta  (ANSA)

Mgr Gallagher azali na Congo-Brazzaville

Secr¨¦taire ya Vatican mpo na boyokani na Bikolo na ba masanga ya mokili akokende na ekolo Congo-Brazzaville kobanda mokolo ya zomi na moko kino zomi na minei ya sanza ya yambo ya 2025. Mgr Richard Gallagher akofungola misala ya Commission mixte mpo na bosaleli accord-cadre, lolenge communiqu¨¦ moko ya secr¨¦tariat ya Vatican ekomi mokolo ya zomi na moko ya sanza ya yambo.

Jean- René Bompolonga- Kinshasa

Etiami maboko na mobu nkoto mibale na zomi na sambo, o eleko ya boleki ya secrétaire ya Vatican, episkopo ya lokumu Pietro Parolin, accord-cadre kati na Vatican na Congo-Brazzaville ekoti na mosala na mobu nkoto mibale na zomi na libwa. Ezali na likambo ena Mgr Paul Richard Gallagher, Secrétaire ya Vatican eye akotala boyokani na Bikolo, akokende na Brazzaville kobanda mokolo ya zomi na moko kino zomi na minei ekoya mpo na kofungola na ndenge elongobani masolo kati na bikolo mibale na oyo etali ba accords spécifiques na Commission mixte. Accord-cadre ena ekopesa makoki na Eklezia katoliko ya kosala mosala na ye na Congo-Brazzaville, na bopesi ye personnalité juridique publique, na masanga na ye.   

 

Ayambami malamu

Na mobembo na ye ya liboso na ekolo ena y¡¯Afrika ya kati, Mgr Gallagher akoyambana na mokonzi ya ekolo, Denis Sassou Nguesso. Akoyambama lisusu na Ministre ya Yambo, Mokonzi ya bulamatari, Anatol Collinet Makosso, na ministre ya Boyokani na bapaya, Jean Claude Ngakosso. Mgr Gallagher akosala misa moko mokolo ya eyenga zomi na mibale na esika ya Maria ya cathédrale Sacré-Coeur ya Brazzaville na ba episkopo nionso ya Congo. Likambo wana ekoleka na esengo ebele na bandimi ya Eklezia ya Congo-Brazzaville. Mibali, basi, mikolo na bilenge bakozala mpo na koyamba malamu mopaya na bango oyo akoya kotatola bolingo ya Santu-Papa, mpe komemela bango bobenisi ya papa.

Manaka ya mobembo ya Mgr Gallagher ebongisi botali lilita ya Mosali na Nzambe episkopo ya lokumu Emile Biayenda, episkopo ya liboso mpe kaka moko ya Congo-Brazzaville, babomaka ye na nkoto moko na nkama libwa na ntuku sambo na sambo.    

13 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 16:57