Papa na babola: ?Tozali bikelamu kitoko ya Nzambe?
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
O ntei ya kitoko ya biloko bizalisami mpe ya bikelamu, na kati ya elanga ya ba ndaku pontificales ya Castel Gandolfo, na nse ya ekalà monene oyo etyamaki mpo na bilei ya ngonga ya nzanga elongo na babola oyo ebongisamaki na diocèse ya Albano Laziale mpe Borgo Laudato si', Pàpa Léon XIV, na lisikulu na ye ya mbalakaka, alendisaki bato na komikundola ¡®te «ekelamu eleki kitoko ezali oyo ekelami na elilingi ya Nzambe, elingi koloba biso banso». Mpe na lolenge lonà ndé moto na moto azali elilingi ya Nzambe. Na yango, ezali malamu ¡°koyeba ¡®te: tozali komona bozali bonà bwa Nzambe kati na moto na moto¡±. Na yango, kozala na esika ena na sima ya nzanga, mpo na limpati, ezali kozala na bomoi elongo na Nzambe, kati na bondeko; elobaki ye.
Kobuka lipa mpe kokabola likabo ya Mokonzi
Na komona bato nkama oyo bayaki koliya na ngonga ya nzanga (midi), babola oyo Caritas ya diocèse ya Albano asalisaka, bampaya bayaki na bisika ya koyamba bato bamboka mpe na bandako ya mabota, bato oyo bazangà bisika ya kofanda, episkopo wa Roma azongelaki ntina ya kokabola. ¡°Elembo eye ya motuya, ezali na ntina mingi mpo na biso banso. Ezali elembo ya kobuka lipa elongo, elembo oyo na nzela na yango Yesu Kristo ayebani kati na bato ba Ye¡±. Ezali Misa ya bosantu, kasi ezali mpe mpo na biso banso kozala elongo zingazinga ya mesa, mpo ¡°na kokabola makabo oyo Mokonzi apesi biso¡±. Sima ya kobenisa makabo bazwaki, mpe kobenisa bato banso oyo basalaki makasi mpo na kopesa bilei binà mpo na kosala ¡®te eyenga ena ezala kitoko, Léon XIV abondelaki ¡®te ¡°Mokonzi asalisa biso mpo na kozala ntango inso na bomoko kati na bolingo bwa ye¡±.
Episkopo wa lokùmu Baggio: Borgo Laudato Si¡¯ efungwami mp ona baye banso bazali na bosenga.
Na kopesa mbote na Pápa mpe na baye bazalaki wana, episkopo wa lokùmu Fabio Baggio, mokambi ya Laudato si', mpe Secrétaire général ya Dicastery mpo na Service ya Développement humain intégral, alobaki ¡®te: «lelo, tozali komona kokokisama ya ndoto ya esakweli ya Pape François: Borgo Laudato si' ezali kaka esika te, kasi lolenge ya bomoi ya Nsango-Elamu oyo efungoli ezibelo na yango liboso liboso epai ya bato banso bazali na bosenga: babola, bato banso bazali o kati ya lisanga te». Episkopo wa lokùmu Baggio asukisaki na koloba ¡®te: «Ezali na ecologie ya solo solo te soki bosembo ya societe ezali te: yango nde liteya linene ya Laudato si' mpe ya mateya ma Eklezia mpo na bolamu bwa bato». Bolingo ya bokristo esukaka na bosembo mpe elekaka yango, mpe ebongolaka yango na bolingo bwa solosolo.
Mgr Viva: Kokokisama ya bolamu bwa Nsango-Elamu
Mpo na Mgr Vincenzo Viva, episkopo ya Albano, ¡°na kotala bilongi bya baye bafandi lelo o meza eye, tozali komona bolamu bwa Nsango-Elamu oyo ezali kokokisama solo mpe ezali kotatola bosangani bwa biso na Eklezia ya Albano¡±. Na nsima abakisaki ¡®te, ¡°bakoki kolobela ¡®biso¡¯ te mpe ¡®bango¡¯ te, bakoki kolela te basalai bolamu mpe baye bakozwaka bolamu bona, to ezali te na baye bazali kokabola limpa mpe, elongo na yé, masolo ma bango, milende mya bango, mpe bilikya ba bango¡±.
Limpati ya babola ya dioseze na ngonga ya nzanga elongo nà Pàpa
Kati na baye bayanganaki na limpati ya nzanga: ezalaki mpe na Alessio Rossi, mokambi ya Caritas ya dioseze ya Albano, Massimiliano Borelli, mokonzi ya engumba ya Albano Laziale, Alberto De Angelis, mokonzi ya engumba Castel Gandolfo, mpe basangani basusu ya Caritas, kati na bango basángó mpe bamamelo, oyo basalaka elongo na Caritas ya dioseze. Biloko ya koliya ebongisamaki na bato oyo babongisaka bilei na esika ena, na bato ba bolingo, ba motema bolamu, mpe na bato oyo basalaka na Borgo Laudato si'. Bilei bonà ezalaki kotosa ezalela ya koliya ya eyamba na eyemba ya bato baye bazalaki kozwa lisungi ya Caritas.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.