Caritas Albano: ¡°Babola ba biso bakozala bato ya liboso ya koliya elongo na P¨¤pa¡±.
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
Bato bansuka bakokóma bato ba liboso. Baye bazali na bomoi ya mpasi, bavandi na bamalweka mpe baye masanga ya bato bakotiyaka pembeni, bakobyangama na ndako ya Mokonzi mpe bakozwa to bakofánda na bisika ya liboso o mesa. Yango nde ekosalema o mokolo mwa lomingo, mwa zomi na sambo ya Augusti (17 Aout) oyo ezali koyà, na Castel Gandolfo. Nsima ya misa na esika mosantu ya Sainte Marie ya Rotonde na Albano, mpe nsima ya losambo la Angelus, Pápa Léon XIV akoliya na ngonga ya nzàngà (midi) elongo na bato soko monkama ya Caritas ya dioseze ya Albano Laziale, na Borgo Laudato si'.
Alessio Rossi, mokambi ya Caritas ya dioseze ya Albano, alobi na bapanzi sango ya Vatikan ¡®te: ¡°Bato oyo bazangà-ndako, oyo bakoliya elongo na Pàpa o mokolo mwa lomingo, batunaki biso soki bakoki kosukola, mpe kolata bilamba bya peto mpe ya kitoko mpo na kokutana na y顱.
Mokambi, lobi okendeki kotala Borgo Laudato Si'. Lolenge kani kobongwama ezali koleka?
Bapaya bakokota na bandako ya Pápa na ekuke oyo ezali na Piazza Pia na Albano. Esika moko ekobongisama na kati ya elanga, esika bilei ya midi ekopesamela. Pápa mpe bato na ye bakofanda esika moko, na mesa moko. Bato oyo bakoya na liyangani yango bakofanda na bandako bayambaka bapaya, na bisika ya koliya, mpe na bisika oyo Caritas ya Albano ekotiya bato oyo bakoya na liyangani. Bakompanyi ya mboka yango nde ekopesa bango bilei. Ba pizzerias mpe ba bars ya Albanos nde bakopesa bilei ya ebandeli mpe ya sukali.
Pàpa nà bato bayé bakoliya nini?
Biloko oyo bakoliya ekozala: lasagne ya ndunda, mbolongo nà fromage oyo babengaka ¡®parmigiana¡¯, nyama ya kotumba, salade ya bambuma, mpe biloko bisusu ya elengi ya mboka na biso. Liboso ya likita yango, bakoliya mwa eloko na kati ya elanga.
Lolenge kani likanisi ya kolia na midi elongo na Pápa mpe babola ya Caritas ya Albano ebimaki?
Nsima ya mobembo ya liboso ya Pápa Léon XIV na engumba Albano, na mokolo mwa tukù mibale ya yuli 20 Yuli, nayebisaki episkopo na biso, Mgr Vincenzo Viva, ¡®te nazali na mposa ya kokutana na Pápa elongo na babola. Episkopo atunaki Pápa soki akokaki koya mpe alobaki ¡®te Pápa azalaki na esengo makasi ya kokutana na biso. Vatikan endimaki ¡®te na ngonga ya libwà na ndambo ( 9h30), tokosala misa na sanctuaire Sainte Marie ya Rotonde. Bapaya ba biso nde bakoyema na misa mana, mpe na nsima, tokobongisa bilei ya midi na Borgo Laudato si'. Ezalaki esengo enene mpo na biso. Ekipi na biso ya babongisi-nzela, elongo na bato banso ya Caritas, babandaki mbala moko mosala na esengo.
Pene ya bato monkàmà (100 personnes) bakoya na likita linà elongo na Pápa Léon XIV. Kasi, bato bango bazali banani? Mpe lolenge kani basololaki na Caritas?
Bazali bato bafandaka na ndako na biso epai wapi toyambaka bapaya ya libota mpe bilenge ya Torvaianica, oyo babengaka «Cardinal Pizzardo». Ekozala mpe na ndako ya « Francesco », oyo ezali mpo na mibali oyo babomá mabala mpe batata bakufela basi. Bato oyo bayambaka bato na ndako ya koyamba bato ya maladi ya ntolo, ¡°Don Orione ya Anzio¡±, mpe bato ya centre ya Anzio nà Nettuno, Crocicchio, bakozala mpe na likita yango. Tokozala lisusu, na bato banso bafandi na centre ya Albano, epai wapi bayambaka bato soki tuku misato oyo bazàngá-ndako bafandaka, bakoya kolya. Bato basusu bakozwa mpe lisalisi ya centre na biso ya Aprilia, oyo esalisaka bato bazali na makambo ya moto.
Ekozala na mwa tango ya kosolola, kati na bato ya Caritas mpe Pápa, na boumeli na yango bakoki koyebisa ye mikakatano oyo bazali kokutana na yango?
Ezali mpenza bongo. Mposa na biso ezali ya kosala ¡®te makambo manso ezala ya libota, lokola na Caritas. Bango banso bazali na esengo mpe na nsai. Balobaki ¡®te na ngonga ya mwambe na tongo, bango banso bakozala na biro monene ya Caritas Albano mpo na kozela misa elongo na Pápa. Bazàngà -ndako baiké bayebisaki biso ¡®te balingi koyebisa ye makambo oyo bakutanaka yango mpe mikakatano ma bango. Bazali na mposa ya kosala yango mpe bazali na esengo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.