O mokolo mwa 17 ya Augusti, L¨¦on XIV akosala misa na Albano mpe
Bansango ya Vatikan
«Ezali mbala ya yambo oyo Léon XIV akokutana na babola na eleko ya bokonzi bwa ye. Bongo tozali na esengo mingi, mpamba te, abandi na dioseze ya biso» elobaki episkopo ya Albano, Mgr Vincenzo Viva. Amonisaki esengo ya ye bobele mpo ya bozongi bwa Pápa na Albano te, kasi lisusu, dioseze elobi, mpo ¡°andimi mbela ya Caritas ya kolya na ngonga ya nzànga (midi) elongo na babola¡±.
Pápa pembeni ya bato bazali na bosénga
O mokolo mwa lomingo la zomi na sambo ya sànzà ya Augusti (17 août), Prefecture ya ndako ya bantoma eyebisi ¡®te, Pape Léon XIV akosala misa na ngonga ya 9h30 na Sanctuaire ya Sainte Marie ya Rotonde, nliboso ya babola oyo basalisami na Caritas ya dioseze mpe basàli na yango.
Na ngonga ya nzàngà (midi), akoyemba Losambo la Anzelu na Esika ya bonsomi) (Piazza de la Libertà), na Castel Gandolfo, mpe na nsima akoliya na midi elongo na babola mpe bato basalisami na Caritas ya Alban na Borgo Laudato si.
Yoko likanisi ya dioseze
Bolei bwa midi, oyo ebongisami na dioseze ya Albano na boyokani na Dicastery mpo ya Service du Développement Humain Intégral (oyo ekambaka Borgo Laudato si' ya Castel Gandolfo), ekosangisa, longola Pape mpe episkopo Mgr Viva, bato pene na nkama moko, kati na bango bayambi ba bandako ya mibange mpe bandako ya koyamba bapaya ya diocese, bato oyo bafandaka na ndako ya dioseze, mpe nà mokambi Alessio Rossi, mokambi ya ndako yango, mpe bandeko basusu oyo bamipesaki na bolingo na bango moko. Diocèse ezali na elikya ¡®te bato banso oyo bazali na mposa ya lisalisi, mpe baoyo bazali kosalisa bango na likebi nyonso mokolo na mokolo, bazwa yango na liseki te kasi na bokebi mpenza.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.