Pàpa ayambaki Mokambi ya ekolo ya Zimbabwe
Bansango ya Vatikan
Na ntongo ya mokolo mwa tukù misato ya sànzà ya augùsto (30 août), Pápa Léon ya zomi na minei (Pape Léon XIV) ayambaki na likita moko ya bonkuku na Vatican, Emmerson Dambudzo Mnangagwa, Mokambi ya ekólo Zimbabwe. Nsima, Mokambi moye ya Ekolo ya Afrika ya Ngele, asololaki na mokomeli ya Ekolo ya Vatikan, Episkopo wa lokùmu Pietro Parolin, mpe mokomeli ya Ekolo ya Saint-Siège Mgr Paul Richard Gallagher mpo na boyokani nà bikolo. Na masolo ma bango ya esengo, oyo esalemaki na Secretariat ya Etukà, “balakisaki boyokani malamu kati na Saint-Siège mpe Zimbabwe”, elobi liyebisi ya ndako ya bapanzi sango ya Saint-Siège. Na nsima, balobelaki makambo ndenge na ndenge ya mopelengano (politiki) mpe ya nkita ya ekólo yango, mingi mpenza boyokani bwa yango nà Eklezya ya mboka, na makambo matali ezingelo, kelasi mpe ya bokolongonu bwa nzoto.
Kaka na masolo ma bango, bakabolanaki makanisi na maye matali makambo ndenge na ndenge ya etuka, “balakisaki ntina ya kolendisa boyokani na mikili misusu, masolo, mpe boyokani kati na bikolo”.
Nzokande na sànzà ya mayi (sànzà ya mitano), Mokambi-molandi ya ekolo ya Zimbabwe akendaki na Vatikan mpe asololaki na Mgr Gallagher.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.