ÐÓMAPµ¼º½

Luka

 P¨¤pa L¨¦on XIV, na tango ya likita ya bato banso (audience g¨¦n¨¦rale) ya mokolo mwa mos¨¤l¨¤ misato mwa 20 ya agusto, na kati ya salle Paul VI ya VatiKan P¨¤pa L¨¦on XIV, na tango ya likita ya bato banso (audience g¨¦n¨¦rale) ya mokolo mwa mos¨¤l¨¤ misato mwa 20 ya agusto, na kati ya salle Paul VI ya VatiKan  (ANSA)

P¨¢pa asengi mokolo ya kokila bilei mpe kobondela mpo na kimya, o mokolo mwa 22 Aug¨²sto

Nsima ya mateya ma y¨¦ na maye matali bolimbisi, na likita lya bato banso (Audience g¨¦n¨¦rale) na Salle Paul VI, P¨¤pa abengaki mokolo mwa misato na kobondela Maria mpo ¡®te ?apangusa mpizoli ya baye bazali konyokwama na ntina ya bitumba bizali kosalema?. Na ntina na yango, L¨¦on XIV asengi ¡®te mokolo ya mitano, mwa 22 Aug¨²sto, ezala mokolo ya kokila (komipima) bilei mpe ya kobondela, mpo na kokundola Maria, Mokonzi-Mwasi mwa Ngolu.

Bansango ya Vatikan

 

Pápa Léon XIV asengaki lisusu bandimi mpe bato ya mibembo oyo bayanganaki na Ndako ya Paulo VI mpo na likita ya bato banso(audience generale) ¡®te básàmbela mpo na kimya mpe bábondela Maria. Asengaki bakristo banso ¡®te ba memya mokolo mwa 22 Augusto, mokolo eklezia ekokundolaka Ngondo Maria Mokonzi-Mwasi, ¡°Kokila(komipima) mpe kobondela, kosenga na Mokonzi apesa biso kimia mpe bosembo. Mpe apangusa mpizoli ya baye bazali konyokwama na bitumba oyo ezali kosalema¡±.

Papa abakisi ¡®te, Malia azali ¡°Mama wa bandimi awa onsé ya mabele, mpe bakobelelaka yé Mokonzi-Mwasi wa Boboto, nzokandé mokili mwa biso ezali se konyokwama na bitumba na Mabele Mosantu, na Ukraine mpe na bisika bisusu ya mokili¡±.

Kosambela mpo na likabo ya boboto, ¡°Kozanga mandoki mpe kolongola mandoki¡±

Mwa moke liboso, ntango azalaki koloba na bakristu ya lokótá ya Portugais, Léon XIV azongelaki likanisi ya moboko ya kofanda na kimya(boboto) kati na bato mpe kati na bikólo. Alobaki ¡®te: ¡°Soki bolimbisi ezali te, kimya ekozala te¡±.

Na kopesa mbote na bato bamombembo ya ekolo ya Pologne oyo bazalaki na Roma mpe baye bautaki na Sanctuaire ya Notre-Dame ya Jasna Góra, na Pologne kaka, epai ezali na ekeko ya Notre-Dame ya Cz?stochowa, episkopo wa Roma asengaki bango boye « botiya o makanisi ma bino libondeli mpo na likabo lya kimya (boboto) oyo ezangi mandoki mpe ekolongola mandoki¡± mpo na mokili mobimba, mingimingi mpo na ekolo ya Ukraine mpe Moyen-Orient».

Na ntongo ya mokolo ya mibale, 19 Augusto, Pápa akendeki na mboka Guadagnolo na commune ya Capranica Prenestina, na diocèse ya Palestrina, na esika mosantu ya Notre-Dame de Grâces ya Mentorella, oyo Saint Jean-Paul II azalaki kolinga mingi.

Kosambela tango inso mpo ya boboto (kimya)

Na ntongo ya mokolo mwa mibale, 19 Augusto, Pápa akendeki na mboka Guadagnolo na commune ya Capranica Prenestina, na dioseze ya Palestrina, na esika mosantu ya Notre-Dame de Grâces ya Mentorella, oyo Saint Jean-Paul II azalaki kolinga mingi. Kuna, mokambi ya lingomba alobaki ¡®te, ¡°ak?taki na ndako-nzambe, na nse ya ekeko ya Ngondo Maria, mpe atiyaki buji mpe abondelaki mpo na kimya na mokili mobimba¡±. Mpe na mpokwa ya mokolo mwa mibale, ntango azalaki kobima na ndako na ye ya eleko ya molunge na Castel Gandolfo, pene na ngonga ya libwa ya mpokwa, Papa alobaki na bapanzi-nsango oyo bazalaki kozela ye liboso ya ekuke ya Villa Barberini, ¡®te esengeli ¡°kobondela mingi mpo na boboto¡±, mpo na kopesa elikya, oyo ezali mpenza.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye. 

 

20 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 12:19