ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Papa L¨¦on XIV o likita po ya banso ya lelo mokolo ya misato 20 ya sanza ya mwambi, o ndako ya makita Polo VI Papa L¨¦on XIV o likita po ya banso ya lelo mokolo ya misato 20 ya sanza ya mwambi, o ndako ya makita Polo VI  (AFP or licensors)

Likita po ya bans¨®: bolimbisi ekof¨²ngola oyo apesi yang¨®

? Yezu, na likambo ya p¨¢mba ya kopesa lipa, alakisi ¡®te bokabi ins¨® ekoki kok¨®ma eleko m¨®k¨® ya libiki, soki eponami lok¨®la esika po ya bolingo m¨®k¨® eleki monene ?. Wan¨¢ ezali eye elobaki Pap¨¢ na likita po ya bans¨® ya mokolo ya mis¨¢to, liboso ya bandimi ebel¨¦ pe bato ya mob¨¦mbo mwa los¨¢mbo basanganaki na nd¨¢ko ya makita Polo VI ya Vatican. Abiangi bang¨® ? ya kos¨¦nga lel¨® ngolu ya koy¨¦ba kolimbisa, at¨¢ soki tozali koy¨®ka ¡®te bay¨¦bi bis¨® te, at¨¢ soki tozali koy¨®ka ¡®te batiki bis¨® ?

Jean-René B.- Kinshasa

Mokolo elandi bozongi na yé na Vatican, simá ya mwa mikolo ya bopemi na Castel Gandolfo úta mokolo ya 13 ya sánzá ya mwambi, Sántu-Papá akobaki molongó ya likanisi na yé ya malozi, liwá pe nsékwa ya Kristu. Likita po ya bansó ya mokolo ya misáto eyé esálemaki lisusu na ndáko ya makita Polo VI, likoló ya molungé ezalaki makási.

Po ya mokolo ya misáto ya 20 ya sánzá ya mwambi, Papá Léon XIV atelemaki na mókó makambo ya botungisi koleka pe ya mwinda koleka ya Nsango-Ndamu : « eleko eye Yezu, o eleko ya Limpati ya súka, apesi eténi mókó ya lipa na oyo azali kobongoma po ya kokaba ye ». Ezali kaka likambo ya bokaboli te, elobaki ye, kasi ya koleka yangó : « ezali bomeki ya súka ya bolingo po na kotika te ». « Kolinga kinó na súka : waná fúngola ya koyéba motéma ya Kristu. Bolingo mókó eyé ekosúka te liboso ya boboyi, boyóki pási, atá kutu kozanga botondi », elimbolaki Sántu-Papá.

Bolimbisi ya sóló ekopesama yambo penza lokóla likabo mókó ya ofelé

Yezu ayébi ngonga, kasi akoyóka yangó te : aponi yangó, elobaki lisusu Papá, na bosakoli ¡®te ezali yé ndé ayébi eleko eyé bolingo na yé esengeli koleka na pótá ya pási koleka, na eyé ya bokabi. ¡°Pe na esika ¡®te abima, afúnda, amibátela, akobi kolinga: asúkoli makoló, atuni lipa pe apesi¡±, elobaki ye.

¡°Nakotuna eténi ya lipa o sani, oyo nakopesa lipa, ye wanᡱ (Yoane 13,26). Na likambo ena ya pámba pe ya bosáwá, elobaki Léon XIV, Yezu akobi pe akolisi bolingo na ye. Ezali te po ayébi te nini ekoleka, kasi po azali komóna polélé. ¡°Ayébaki ¡®te bonsómi ya mosusu, atá soki akobúnga na mabé, akoki lisusu kosimbáma na mwinda ya likambo mókó ya pete. Po ayébi ¡®te bolimbisi ya sóló ezélaka bobongoli motéma te, kasi emipesaka liboso, lokóla likabo mókó ya ofelé, liboso kutu ya koyambama¡±, elakisaki Papá wa Roma.

Bolimbisi ekolakisa elongi ya sóló ya elikya

Yudasi, na mawa, akoyéba te, elobaki Papá. Simá ya eténi, elobi Nsango-Ndamu, ¡°Satána akoteli ye o motéma¡± (v.27). Litángi mókó eye ekobeta, ebakisaki ye: ¡°lokóla sóki mabé, kinó sika ebombani, emibimisaki tángo bolingo elakisaki elongi na ye ya malamu¡±. Pe ezali penza po na yangó, elobaki Léon XIV, ¡®te eténi ena ezali libiki na bisó: ¡°po eyébisi bisó ¡®te Nzámbe asálaka nionso po na kozua bisó, atá na tángo eye tozali kobóya ye¡±. Ezali waná esika bolimbisi emilakisaka na ngúyá na ye nionso pe ekobimisa elongi ya sóló ya elikya.

¡°¡°Ezali bobósani te, ezali pe bolembu te. Ezali likoki ya kotika mosusu na bonsómi, na bolingi ye kinó na súka. Bolingo ya Yezu ewángani bosóló ya pási te, kasi ekolingisa na mabé ezua liloba ya súka te. Ezali mobombano ¡®te Yezu akosála po ya bisó, eye tobengami tángo mosusu ya kozala¡±.¡±

¡°Ezali kaka na loléngé mókó ya kokoba kolinga¡±

Na bokanisi na bandimi ebelé pe bato ya mobémbo mwa losámbo basangani na ndáko ya makita Polo VI na boyokani mingi bikátana, masapo bitungisaka pe maloba mingi bilobama te bitikala kaka boye, Sántu-Papá alimboli ¡®te Nsango-Ndamu ekolakisa bisó ¡®te ezali kaka na loléngé mókó ya kokoba kolinga, atá sóki nionso ezali lokóla kobonga te. ¡°Ya sóló, kolimbisa elingi koloba te kowángana mabé, elakisaki ye, kasi kopekisa yangó ya kobóta mabé mingi. Elingi koloba te ¡®te eloko mókó eleki te, kasi kosála nionso eye okoki po ¡®te ezala kándá te ezua mokano po ya lóbi¡±.

Na bozongeli lisoló ya Limpati ya súka eye ekoloba lokóla tángo Yudasi abimi na ndáko, ¡°butú bosili boindi¡± (v.30), episkopo ya Roma alakisaki ¡®te, bisó lokóla, tokobika ba butú ya pási: ba butú ya molimo, ba butú ya boyóki pási, ba butú biye moto mókó azokisaki to akabaki bisó.  Po na bileko bina, elimbolaki ye, bomeki po ya biso ezali ya komikangama, ya komibátela, ya kozongisa mabé. ¡°Kasi Mokónzi akolakisa bisó elikya ¡®te nzéla mosusu ezali kaka. Akotéya bisó ¡®te tokoki kopesa eténi móko ya lipa atá na baye bapesi bisó mokongo. Tokoki koyanola na bokangi monoko na elikya. Tokoki kokende liboso na lokúmu, kobóya bolingo te¡±, elobaki Papá Léon XIV.

Bokabi nionso ekoki kokóma eleko mókó ya libiki

Na bosúkisi litéya na yé, Sántu-Papá abiangaki bandimi pe bato ya mobémbo ya losámbo ya kosénga leló ngolu ya koyéba kolimbisa, atá tángo toyókaka ¡®te bayébi bisó te, atá tángo toyókaka batiki bisó. Po, ebakisaki ye, ¡°ezali penza na bileko bina ¡®te bolingo ekoki kokóma na likoló¡±.

¡°¡°Lokóla Yezu atéyi bisó, kolinga elingi koloba kotika mosusu na bonsómi- atá ya kokaba- na botiki ya kolikia te ¡®te bonsómi ena, ezokaki to ebúngaki, ekoki kozala ebotolami na lokutá ya molili pe ezongisami na mwinda ya malamu¡±.¡±

Tángo mwinda ya bolimbisi ekoki koleka na ba nzéla bipasuka na mozindo ya motéma, tokoyéba ¡®te ezali na tina, esembolaki Papá. ¡°Atá sóki mosusu ayambi yangó te, atá sóki ekomónana tina te, bolimbisi ekofúngola oyo apesi yangó: ekobébisa bobombi kándá, ekozongisa kimia pe ekangisa bisó na bisó-mei¡±. Pe Yezu, na likambo ya pámba ya lipa epesami, ¡°ekolakisa ¡®te boteki nionso ekoki kokóma eleko mókó ya libiki, sóki eponami lokóla esika po ya bolingo mókó ya monene koleka. Ekomitika na mabé te, kasi ekolonga yangó na malamu, na bopekisi yangó eboma eye ezali ya sóló koleka na káti na bisó: likoki ya kolinga¡±, esúkisaki episkopo ya Roma.  

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

20 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 16:27