ÐÓMAPµ¼º½

Luka

O likita po ya banso O likita po ya banso  (@VATICAN MEDIA)

Likita po ya bans¨®: ¡°Mab¨¦ ezali s¨®lo kasi ezali na liloba ya s¨²ka"

¡°Boyambi ekopekisa bis¨® kos¨¢la lis¨²mu te, kasi ekopesa bis¨® t¨¢ngo inso nzel¨¢ m¨®k¨® eye ya mawa¡±, elobaki Pap¨¢ o eleko ya lit¨¦ya na ye asakolaki o eleko ya likita po ya bans¨® ya mokolo ya mis¨¢to ya 12 ya s¨¢nz¨¢ ya mwambi. Libiki, elobaki S¨¢ntu-Pap¨¢, eb¨¢ndi na koy¨¦ba ¡®te ¡°tokoki kozala baye bakokaba botiyi mot¨¦ma na Nz¨¢mbe¡±, kasi lok¨®la ¡°baye bayamba yang¨®, bakob¨¢tela yang¨® pe bakozongisa yang¨® sika¡±.

Jean-René B.-Kinshasa

Libosó ya bandimi basangani na ndáko ya makita Polo VI, likolo ya molungé, Papá Léon XIV akobaki lelo mokolo ya misáto ya 12 ya sánzá ya mwambi, molongó ya likanisi na ye na eye etali ¡°matambe ya Yezu na mikolo ya súka ya bomoi na ye¡±. Mbala oyo atelemi na ¡°elili mókó ya motéma, ya mawa pe ya bozindo ya sóló¡±, eye ya ¡°limpati ya Pasika¡±, epayi wapi Yezu ayébisi ¡®te mókó ya ba Zómi na mibále alingi ateka ye: ¡°Nalobi na binó ya sóló: moto mókó o káti ya binó, azali kolia na ngai elongo, akokaba ngai¡± (Mk 14,18)

¡°Bolingo, tángo ezali ya sóló, ekobosana bosóló te¡±

Papá wa Roma alimboli lisusu ¡®te, ¡°maloba makási maye¡±, Yezu alobi yangó te po na ¡°kopesa etúmbu¡±, kasi po ya ¡°kolakisa ¡®te ¡°bolingo, tángo ezali ya sóló, ekobosana bosóló te¡±. Na bolakisi lisusu ¡®te ¡°esika bazalaki, epayi wapi nionso ebongisamaki malamu mwa ngonga libosó, etóndi na pási mókó ya mawa, ekómaki na mitúna, na nungunungu pe bozangi makási¡±. Pási mókó, elobaki ye, ¡°eye toyébi yangó malamu lokóla¡±, tángo ¡°lililingi ya bokabi ekoti na boyokani eleki motúya¡±. Atá, elobaki Sántu-Papá, ¡°loléngé Yezu akoloba po eye elingi esálema ezali kokamwisa¡±. Po, elobaki ye, ¡°atómboli mongóngó te, alakisi mosapi te, atángi kómbó ya Yudasi te¡±. Alobi ndé, esakolaki Papá, ¡°ya loléngé nini mókó mókó akoki komitúna¡±: ¡°Bangó bakómi koyóka mawa mingi, pe mókó mókó abándi kotúna yé: ¡°Ngai tô?¡± (Mk 14, 9).

Boyébi pe nzelá ya libiki

Po na mokitani ya Petelo, motúna ena: - ¡°Ngai tô?¡± - ezali ¡°tángo mosúsu mókó ya bosóló koleka tokoki komitúna¡±. Ya sóló, elobaki yé, ezali te motúna mókó ya ¡°moto ayébi likambo te¡±, kasi eye ya moyékoli amimóni bolembu. Waná ezali te ¡°bongángi ya moto ayébi likambo, kasi koimaima ya oyo, alingi alinga, ayébi ¡®te akoki kosála mab顱, elobaki Léon XIV, oyo alobaki ¡®te ¡°na boyébi ena ndé ebándi nzelá ya libiki¡±. Na bobeti sete na likambo eye ¡°Yezu afúndi te po ya koyókisa nsoni. Alobi bosóló zambi alingi kobikisa¡±.

¡°¡°Po ozua libiki, esengeli kososólá: kososólá ¡®te ozali na káti, kososólá ¡®te olingami atá nionso, kososólá ¡®te mabé ezali ya sóló kasi ezali na liloba ya súka te. Kaka oyo ayébi bosóló ya bolingo mókó ya mozindo akoki kondima pótá ya bokabi¡±.¡±

Nsango-ndamu, ekebisaki Papá ¡°ekotéya bisó ya kowángana mabé te, kasi ya koyéba yangó lokóla likambo mókó ya pási po obótama lisusu¡±. Léon XIV alobaki ¡®te tángo Yezu alobi: ¡°Mawa na moto oyo akokaba yé! Eleki malamu soki abótámáki te!¡± (Mk 14, 21), ¡°maloba maye bizali makási, sóló¡±, kasi bikobimisa na bosóló ¡°bogángi mókó ya pási¡±, ¡°bogángi mókó ya mawa ya sóló pe ya mozindo¡± pe ¡°bolakeli mab顱 te, esémbolaki episkopo ya Roma. Nzókandé, ebakisaki yé, ¡°tomesana kosámbisa¡±. Kasi ¡°Nzámbe yé, andimi pási¡±. Pe tángo ¡°amóni mabé, aluki azongisa mabé te, kasi amiyóki mawa¡±

Léon XIV alobaki lisusu ¡®te ¡°soki towángani bolingo eye esálaki bisó, soki, na kokaba yé, tokozángá lobókó na bisó-mei, wana tokobúngisa ya sóló tina ya boyei na bisó na mokili pe tokomibisa na libiki¡±. Ebongi bôngó, eséngaki ye, koyéba ¡°ba ndelo na bisó¡±, ¡°tomitika po pási ya Kristu ezua bisó¡±, waná ekoki kosálema na súka ya ¡°kobótáma lisusu¡±.

¡°¡°Boyambi ekopekisa bisó kosála lisúmu te, kasi ekopesa bisó tángo inso nzelá mókó: eye ya mawa¡±.¡±

¡°Makási ya kimia ya Nzámbe¡±

Mokitani ya Petelo alobi lisusu ¡®te libosó ya ¡°bolembu na bisó Yezu akomisála mabé te¡±, na bolobi ¡®te atáko Kristu ¡°ayébi malamu ¡®te bolingo mókó te ebombani na bokabi, akokoba komipesa¡± pe ya ¡°kovanda na mesa na baye ya y顱. Pe mingi, elobaki yé, ¡°atikaki kokata lipa te, atá na oyo akokaba ye¡±. Wana ekolakisa, engebene na Papá, ¡°makási ya kimia ya Nzámbe: akotika soki moke te mesa ya bolingo, atáko ayébaki ¡®te akotikala yé mókó¡±. Pe abakisi: ¡°Bisó lokóla tokoki kosénga leló, na bosóló: ¡°Ngai tô?¡±, kaka po tomiyóka te ¡®te tofúndami, kasi po ya kofúngola esika mókó ya bosóló na mitéma na bisó¡±, elendisaki ye. Libiki, elobaki Papá wa Roma, ebándi na boyébi ¡®te ¡°tokoki kozala baye bakokaba motéma batiyaki na Nzámbe, kasi lokóla baye bayambi yangó, bakobátela yangó pe bakozongisa yangó sika¡±.

Elikya ezali ya koyéba ¡®te ¡°atá soki tokweyi, Nzámbe akotika bisó soki moke tè. Atá soki tokoki kokaba ye, akotika te kolinga bisó¡±. Pe soki ¡°tomitiki na bolingo ena -na bomikitisi, na bozoki, kasi kaka na lobókó- waná tokoki kobótáma lisusu ya sóló¡±.  Pe mingi, ¡°kobánda kobika kaka lokólá batekisi te, kasi lokólá bána balingami po na libélᡱ, esúkisaki Léon XIV.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

13 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 18:44