ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Papa Leon XIV, likita po ya banso na esika Santu Petelo Papa Leon XIV, likita po ya banso na esika Santu Petelo  (ANSA)

Likita po ya bans¨®: ngolu elongolaka bons¨®mi na biso te, kasi ekolamuisa yango

¡°Nz¨¢mbe akokende liboso na biso t¨¢ngo inso¡±, elobaki Pap¨¢, na bob¨¢ndi mokolo ya mis¨¢to ya lelo ya 6 ya s¨¢nz¨¢ ya mwambi molong¨® na ye ya yambo ya mat¨¦ya et¨¢li malozi, liw¨¢ pe ns¨¦kwa ya Kristu. S¨¢ntu-Pap¨¢ ayebisi biso ¡®te na elili ya bay¨¦koli na Makomi Mas¨¢ntu ¡°tobengami biso lok¨®la ya ¡°kobongisa Pasika¡± ya Mok¨®nzi¡±. Ezali kaka ¡°Pasika ya nzebi ya milulu mya eklezya te, kasi eye lok¨®la ya bomoi na biso¡±, elobaki Mokitani ya Petelo.

Jean-René B.-Kinshasa

¡°Tokokoba nzéla na biso ya Zubilé na bomoni elongi ya Kristu, epáyi ya nani elikya na biso ezui lolénge pe bokasi », elobaki Papá o eleko ya likita po ya bansó ya mokolo ya misáto ya 6 ya sánzá ya mwambi na esika Sántu-Petelo. Libosó ya bandimi ebele pe bato ya mobémbo ya losámbo batómboli bendele ya bikóló na bangó pe bakobeta maboko, Léon XIV abándaki komanyola, na molongó ya sika ya litéya etáli malozi, liwá pe nsékwa ya Kristu. Sántu-Papá abongisaki bôngó ya kokanisa na likambo mókó eye « emonanaka lokóla pete », kasi eye ebombi « sekelé mókó ya motúya » ya bomoi ya mokristu : « kobongisa ».

Bobongisi, o káti ya bomoi ya mokristu

Na Nsango-Ndamu ya Malako, elobaki episkopo ya Roma, elobami ¡®te mokolo ya yambo ya eyenga ya mámpa mavimbi te, epáyi wapi bakotumba mwána-mpaté ya pasika, bayekoli ya Yezu bayebisi ye: ¡°Olingi tokende koléngele limpati lya Pásika o esika nini?¡± (Mk 14,12). Po na Papá, ezali «motuná mókó ya malamu», kasi ¡°etóndi na bozeli¡±. Po, ekobaki Papá koloba, ¡°bayékoli bakomona ¡®te likambo mókó ya ntina ekosálema, kasi bayébi loléngé ekoleka te¡±. Léon XIV alobi ¡®te eyano ya Yezu ¡°ezali lokóla makási¡±: ¡°Boyingela o mbóka, bokozwana na moto mókó amemi mbéki ya mai.¡± (v.13). ¡°Lokóla nionso ebongisamaki bánda kála¡±. Ya sóló, na eténi eye, elobaki ye, « Nsango-Ndamu ekolakisa biso ¡®te bolingo ezali mbuma mókó ya kosálema kaka bôngó te, kasi liponami mókó eyébani malamu ». Ezali te, ekobaki ye, « eyano mókó ya pété te, kasi mokáno mókó eye ekosénga bobongisi ». Yezu, elimbolaki lisusu Papá wa Roma, ¡°akobunda na malozi na ye na bobángi te, kasi na lóbóko na nzéla mókó andimaki pe atamboli na bonsómi pe na peto¡±.  « Yangó ndé ekobondo biso : koyéba ¡®te bokabi bomoi na ye ebótami na mokáno mókó ya mozindo, pe na bobimi kaka boye te ».

¡°Mokónzi asili abongisa po ya biso¡±

¡°Nzámbe akokende libosó tángo inso¡±, elobaki Sántu-Papá. Libosó ¡°toyéba ¡®te tozali na pósá ya boyambi, Mokónzi abongisa kalá po na biso esika mókó epáyi wapi tokoki komiyéba pe tomiyoka baningá na ye¡±, ekobaki Papá. Abeti sete na bolobi ¡®te Pasika eye bayékoli ya Yezu basengeli babongisa na Makomi Misántu, na bosólo ¡°ebongisama kalá na motéma ya Yezu¡±. Atáko bôngó, elobaki Papá, ¡°ezali Ye ndé akanisi nionso, abongisi nionso, azali kozua mokáno nionso¡±. Kasi, abongisi mwa moke, aséngi ¡°na baningá na ye ya kosála eye ya bangó¡±. Pe waná ezali litéya ya sóló ¡°po ya bomoi na biso ya molimo¡±, elobaki Mokitani ya Petelo.

¡°¡°Ngolu elongolaka bonsómi na biso te, kasi ekolamuisa yangó. Likabo ya Nzámbe ekolongola mokúmba na biso te, kasi ekokómisa yangó libóti¡±¡±

Lelo lisusu, ¡°ezali na bilei ya kobongisa¡±, elobaki Léon XIV. Kasi, ezali ¡°kaka likambo ya nzebi ya milulu mya eklezya te, kasi ya kozala na ngonga na mosála mókó eleki biso¡±. Úkaristya, ekebisaki ye, ¡°ekúmisamaka kaka na lotale lya misa (autel) te¡±, kasi ¡°mokolo na mokolo¡±, epáyi wapi ekokisami po na komona ¡°eloko nionso lokóla libonza pe botondi Nzámbe¡±. Yangó waná komibongisa ya kokumisa botondi Nzámbe ena elingi koloba ¡°kolongola eye ya kaká, kokitisa ba pósa na yo, kotika kobokola bozeli ezanga nzéla¡±, elobaki ye.  Lokóla mingimingi, ¡°tozali kobúlunganisa mabongisi na makanisi¡±. Nzókandé, «makanisi bikobungisa biso», ¡°bikolúka mbano mókó¡±, pe mabongisi ¡°bikolakisa biso¡± kasi mingi mpenzá ¡°bikobongisa bokutani¡±, elimbolaki Papá.

 Bolingo ya sóló, bolingo ya Kristu

Lokóla Nsango Ndamu ekoloba lisusu, bolingo ya sóló, ¡°emipesaka libosó ya kozongisa¡±, esembolaki episkopo ya Roma, na bolobi ¡®te ezali mpenzá likambo ya ¡°likabo mókó ekendeki libosó¡± eye ¡°ebongisami te na oyo ye akozua, kasi na oyo ye alingi apesa¡±. Waná ezali ndéngé ¡°Yezu abikaka na bato na ye: tángo bazali kososola nainu te, tángo mókó alingaki koteka ye pe mosúsu ya kowangana ye, Ye azalaki kobongisa po ya banso bilei (cène) ya lisangᡱ, elimbolaki ye. Sántu Papá ayébisaki ¡®te ¡°tobengami banso ya ¡°kobongisa Pasika¡± ya Mokónzi¡±. Kaka ¡°Pasika ya nzebi mya milulu ya losámbo te, kasi eye ya bomoi na biso¡±.

¡°¡°Elembo nionso ya kozala na ngonga, mosála nionso ya ofele, bolimbisi nionso epesami liboso liboso, molende nionso endimami na malembe ezali loléngé mókó ya kobongisa esika mókó epáyi wapi Nzámbe akoki kovanda¡±¡±

¡°Bisika nini ya bomoi na ngai nabongisa po ¡®te bibongama ya koyamba Mokónzi? Elingi koloba nini po na ngai lelo ¡°kobongisa¡±?¡±, Papá amitunaki mitúna bebo, apesaki mwa ba nzéla ya biyano: ¡°Tángo mosúsu, elobaki ye, koboya pósá mókó, kotika kozela ¡®te moningá abongwama, kobwaka lokolo ya libosó. Tángo mosúsu koyoka mingi, kosála mingi te, to koyekola ya kotiya motéma na eye esili ebongisama¡±, elobaki ye.  

Bomoko na Nzámbe

Soki ¡°tondimi bobengami ya kobongisa esika ya bomoko na Nzámbe pe káti na biso, tokomona ¡®te tozingami na bilembo, na bokutani, na maloba¡± biye ¡°bikokamba na ndáko ena, monene pe ebongisama kalá, epáyi wapi tokokumisa tángo inso mobombano ya bolingo ezanga ndelo, eye ekosunga biso pe ekokende libosó kaka¡±, elobaki ye.

06 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 20:33