Léon XIV: Kokende liboso to kokoba nà elikya ya sika
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
“Boboto bozala na bino”. Léon XIV, azongelaki lisusu maloba mayambo oyo alobaki nsima ya boponami bwa ye lokola Pape ya mbala ya 267 na lisoló ya Eklezia Katoliko o mokolo mwa 8 ya sanza ya mai ya mobu 2025, mpo na koyamba basangani ya biteyelo ya Evangelisation Saint-André, o mokolo mwa mosàlà mitano, mwa tukù mibale na libwa ya sànzà ya mwambe (29 septembre) Ayambaki bango na audience, o mokolo moye Eklezia ya mokili mobimba ezalaki kokundola bomartyro ya Saint Jean-Baptiste. Bongo Mokonzi ntomà monene alobelaki lisusu ‘te “bomoto bwa ye bokoki kosalisa biso mingi mpo na kokanisa na ntina ya etindà to mosala ya bopalinginyi bwa Nsango-Elamu o mokolo mwa lelo”.
Bomoto bwa Santu Yoane Mobatisi
Kati na maloba ma ebandela ya Nsango Elamu ya Yoane, balobi ‘te “Liloba akomi moto mpe azalaki o ntéi (kati) ya biso” (Yoane 1:14). Na nsima abakisaki ‘te Yoane Mobatisi azali kotatola yango (tala v. 15). Mpo na Mokitani mwa Petro “soki totangi na bokebi mikapo mya yambo ya Nsango-Elamu ya minei, tokoki komona fungola ya eteyelo nyonso ya mosala ya bosakoli: kotatola makambo oyo totalaki, ya bokutani oyo tosalaki na Nzambe ya bomoi”. Ndé yango mokomi mwa Nsango-Elamu amonisaki kati na mokanda mwa ye ya liboso, mpe abakisaki ‘te: “Oyo tomonaki mpe toyokaki, tozali kosakola yango epai ya bino mpo ‘te, bino mpe bósangana na biso elongo”. Mpe lisanga na biso ezali elongo na Tata mpe elongo na Mwana wa ye Yesu Kristo. Alobi ‘te yango elimboli “etindà to mosala mwa eklezya mpe ya mokristu nyonso”. Mpe emonisi ‘te “biso nyonso tozwaki batisimo, tosengeli kopesa basusu, oyo tozwaki mpo ‘te biso nyonso tózala bomoko kati na Kristo”.
Botondi bwa Pàpa
Wana azalaki kotonda bango mpo na mosala “ya mbuma kitoko” oyo bazali kosala mpo na kopalinginiya Nsango-Elamu na nzela ya makoki ndenge na ndenge, Mokonzi Ntoma Monene alendisaki bango ‘te “bákoba kokende liboso na elikya ya sika”. Kasi esengeli mpe “kotalela bomoi bwa basantu oyo, lokola Yoane Mobatisi, bazalaki bayekoli ba loboko lya Yesu Kristo. Balakisaki byango na maloba mpe na misala malamu mya bango”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.