ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.08.29: Likita lya P¨¤pa L¨¦on ya zomi na minei (Pape L¨¦on XIV) na Bato baeteyelo bya Nsango-Elamu ya Mosantu Andrea (?coles d'¨¦vang¨¦lisation Saint-Andr¨¦) 2025.08.29: Likita lya P¨¤pa L¨¦on ya zomi na minei (Pape L¨¦on XIV) na Bato baeteyelo bya Nsango-Elamu ya Mosantu Andrea (?coles d'¨¦vang¨¦lisation Saint-Andr¨¦)  (@Vatican Media)

L¨¦on XIV: Kokende liboso to kokoba n¨¤ elikya ya sika

O mokolo mwa mos¨¤l¨¤ mitano, mwa tuk¨´ mibale na libwa (29) ya s¨¤nz¨¤ ya augusto, ntango ayambaki basangani bya baeteyelo ya mosala ya kosakola Nsango-Elamu ya Saint-Andr¨¦, P¨¢pa L¨¦on XIV alendisaki bango ?b¨¢talela bomoi ya basantu oyo, lokola Yoane Mobatisi, bazalaki bayekoli ya loboko ya Yesu Kristo. Balakisaki byango na maloba mpe na misala malamu mya bango¡±.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC

 

¡°Boboto bozala na bino¡±. Léon XIV, azongelaki lisusu maloba mayambo oyo alobaki nsima ya boponami bwa ye lokola Pape ya mbala ya 267 na lisoló ya Eklezia Katoliko o mokolo mwa 8 ya sanza ya mai ya mobu 2025, mpo na koyamba basangani ya biteyelo ya Evangelisation Saint-André, o mokolo mwa mosàlà mitano, mwa tukù mibale na libwa ya sànzà ya mwambe (29 septembre) Ayambaki bango na audience, o mokolo moye Eklezia ya mokili mobimba ezalaki kokundola bomartyro ya Saint Jean-Baptiste. Bongo Mokonzi ntomà monene alobelaki lisusu ¡®te ¡°bomoto bwa ye bokoki kosalisa biso mingi mpo na kokanisa na ntina ya etindà to mosala ya bopalinginyi bwa Nsango-Elamu o mokolo mwa lelo¡±.

Pàpa ayambaki bato baeteyelo ya Nsango-Elamu ya Santu Adrea, o mokolo mwa mosàlà minei mwa 29 augùsto na salle Clémentine
Pàpa ayambaki bato baeteyelo ya Nsango-Elamu ya Santu Adrea, o mokolo mwa mosàlà minei mwa 29 augùsto na salle Clémentine   (@Vatican Media)

Bomoto bwa Santu Yoane Mobatisi

Kati na maloba ma ebandela ya Nsango Elamu ya Yoane, balobi ¡®te ¡°Liloba akomi moto mpe azalaki o ntéi (kati) ya biso¡± (Yoane 1:14). Na nsima abakisaki ¡®te Yoane Mobatisi azali kotatola yango (tala v. 15). Mpo na Mokitani mwa Petro  ¡°soki totangi na bokebi mikapo mya yambo ya Nsango-Elamu ya minei, tokoki komona fungola ya eteyelo nyonso ya mosala ya bosakoli: kotatola makambo oyo totalaki, ya bokutani oyo tosalaki na Nzambe ya bomoi¡±. Ndé yango mokomi mwa Nsango-Elamu amonisaki kati na mokanda mwa ye ya liboso, mpe abakisaki ¡®te: ¡°Oyo tomonaki mpe toyokaki, tozali kosakola yango epai ya bino mpo ¡®te, bino mpe bósangana na biso elongo¡±. Mpe lisanga na biso ezali elongo na Tata mpe elongo na Mwana wa ye Yesu Kristo. Alobi ¡®te yango elimboli ¡°etindà to mosala mwa eklezya mpe ya mokristu nyonso¡±. Mpe emonisi ¡®te ¡°biso nyonso tozwaki batisimo, tosengeli kopesa basusu, oyo tozwaki mpo ¡®te biso nyonso tózala bomoko kati na Kristo¡±.

Leon ayambi Bato ya baeteyelo bya Nsango-Elamu ya Santu Andrea, o mokolo mwa tukù m mosàlà mine mwa 29 ya sànzà ya augusto na salle Clementine
Leon ayambi Bato ya baeteyelo bya Nsango-Elamu ya Santu Andrea, o mokolo mwa tukù m mosàlà mine mwa 29 ya sànzà ya augusto na salle Clementine   (@Vatican Media)

Botondi bwa Pàpa

Wana azalaki kotonda bango mpo na mosala ¡°ya  mbuma kitoko¡± oyo bazali kosala mpo na kopalinginiya Nsango-Elamu na nzela ya makoki ndenge na ndenge, Mokonzi Ntoma Monene alendisaki bango ¡®te ¡°bákoba kokende liboso na elikya ya sika¡±. Kasi esengeli mpe ¡°kotalela bomoi bwa basantu oyo, lokola Yoane Mobatisi, bazalaki bayekoli ba loboko lya Yesu Kristo. Balakisaki byango na maloba mpe na misala malamu mya bango¡±.

Leon ya zomi na minei ayambi Bato ya baeteyelo bya Nsango-Elamu ya Santu Andrea, o mokolo mwa tukù m mosàlà mine mwa 29 ya sànzà ya augusto na salle Clementine
Leon ya zomi na minei ayambi Bato ya baeteyelo bya Nsango-Elamu ya Santu Andrea, o mokolo mwa tukù m mosàlà mine mwa 29 ya sànzà ya augusto na salle Clementine   (@Vatican Media)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

29 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 21:45