ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Ang¨¦lus: Yesu alendisi biso na komikitisa, lolenge eleki malamu ya bonsomi

Kati na malongi ma ye, liboso ya kos¨¢la losambo la Ang¨¦lus, na mokolo mwa lomingo mwa 31 Aug¨²sto, P¨¢pa L¨¦on XIV ateyaki likol¨® ya Evanzile ya Luka, oyo ezali kolobela Yezu na limpati na ndako ya Bafalisai. Bongo amonisi lolenge bazali kowelana mpo na kozwa ¡°bisika ya liboso¡±. Tata Mosantu alendisi nde na ¡°komikitisa, elembo ya bonsomi mpenza¡±, mpe asengi na Eklezia ¡®te ezala ¡°ndako epai wapi moto nyonso ayambami seko, epai wapi bakowelana bisika soki moke te¡±.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na nse ya moi makasi ya Roma, oyo elongobani na mokolo mwa lomingo la nsuka ya sanza ya Augusto, liboso ya ebele ya bandimi oyo bayanganaki na esika monene ya Saint-Pierre, Pápa Léon XIV akundwelaki ntina ya kozala na bomoko o meza, mikolo mya bopemi mpe ya biyenga to bafeti. Na Nsango Elamu ya Luka (Luka 14: 1- 7-14), mokambi moko ya Bafalisaya abengisi Yesu na limpati o ndako ya ye. ¡°Koyamba bampaya efungolaka motema, bongo kobyangama esengi komikitisa mpo na kokota na ezalela ya moto mosusu¡±, elobaki episkopo ya Roma. ¡°mimeseno ya bokutani ekolaka na bilembo biye bikomemaka boyokani¡±.

Kasi, Mokonzi Ntoma Monene ayebi malamu te bokutani ezali ntango nyonso likambo ya pete te. Akundoli ¡®te engebene na mosantu Luka, ¡°baye bazalaki na meza bazalaki kotala ¡®Yesu¡¯. Bafarizaya batiyelaki ye miso mpo ya momeseno mwa bango ya kolimbola ezalela ya bonkoko na lolenge ya makasi koleka¡±. Nzokande, Yesu apusani pene ba bango, mpe akómi solo mompaya malamu, ¡°na limemya mpe na bosolo¡±, mpe aboyi bizaleli bilamu ¡°oyo ezali na yango kaka makambo ya mpamba ya kala mpo na koboya kosangana na makambo mosusu¡±. Ntango Yesu amonaki ¡®te bato oyo babengisamaki bazalaki ¡®kowela koluka bisika ya lokumu¡¯, apesaki bango ndakisa moko mpo ¡®te bakunwela. Leon XIV alobi ¡®te: ¡°Ezali likambo oyo esalemaka tee mokolo mwa lelomei, kaka o kati ya libota te, kasi ntango moto azali na mposa yakomilakisa, to ayebana¡±. Bongo ntango ena, kozala elongo, ekómaka to ebalukaka na momekano.

Na lisalisi lya maloba ma yé, Yezu akobyanga na bonsomi

Pàpa alobi ¡®te : «Kofanda elongo o meza ya Ukaristya o mokolo mwa Mokonzi, elimboli mpe kotikela Yezu maloba» . Abyangi bakristu bayeba komona na miso na yé (Yezu) mpo na «kokanisa lolenge kani, mbala mingi tosalaka ¡®te bomoi bwa biso bozala lokola momekano, lolenge kani tomityolaka mpo na kozwa lokumu, lolenge kani tomikokanisaka na bato basusu». Kristu asengi na biso ¡®te «tófanda mpe tókanisa», «tótika ete liloba moko eningisa mitema na biso» mpo na koyeba komitika kobongwama na liloba lyoko oyo ezongisaka moto sima mpo atiya na esika ya liboso na bomoi bwa yé, makambo maye makolongaka motema mwa yé », mpe apesi bongo na moko na moko libaku lya komona bonsomi.

Bomikitisi, elembo ya bonsomi mpenza

Mokitani mwa Petro akobi na mateya ma ye na kotalisi ndimbola ya liloba «komikitisa» na kati ya Nsango-Elamu mpo na kolobela «elembo ya bonsomi lolenge elongobani» (tala na ¡®Luka 14:11¡¯). Léon XIV alobi ¡®te «komikitisa ebotamaka tango tomipesi mpenza na Bokonzi bwa Nzambe, mpe motema mwa biso mobimba motondi na boyengebene ; lisusu mpe tango tozali na likoki ya kotala mosika - na nsé ya makolo ma biso te, kasi mosika mpenza! (...) Baye bayebi ¡®te bazali na motuya o miso ma Nzambe, baye bazali koyoka na bozindo ¡®te bazali bana ba Nzambe, bazali bongo na makambo manene oyo bakoki komikumisa na yango mpe lokumu oyo ezali kongenge o kati ya bango moko. Na esika ya kosalela makambo oyo bazali kokutana na yango, bazali koyekola kosalela basusu. Manso maye makoleka  mpe makozwa bisika ya liboso na pete nyonso, tango, na esika ya kosalela makambo na ndenge ya mabe, bayekolaka ndenge ya kosalela basusu ».

Mokonzi Ntoma Monene asukisaki na kosenga na bakristu na kosenga «lelo ¡®te Eklezia ezala mpo na moto na moto esika ya koyekola komikitisa, ndako epai wapi moto nyonso ayambami seko, epai wapi bakowelana bisika soki moke te, esika Yesu akoki koloba mpe kotangisa biso na bomikitisi bwa ye, na bonsomi bwa ye».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

31 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 18:33