Ang¨¦lus: Kosakola eyamba bobele na maloba ekoki te, esengeli ezala ntina ya bikateli bya biso
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
Alobaki na bango ¡®te: «Bósala makasi mpenza mpo na kokota na ekuke ya moke. Mpo nazali koloba na bino ¡®te, bato mingi bakoluka kokota kasi bakokoka te. Liboso ya bankoto ya bakristu oyo bayanganaki na esika ya Santu Petro, Pape akundwelaki bango ¡®te elilingi wana ezali te mpo na kolembisa biso, Kasi ezali kosalelama mingi mpenza mpo na kokitisa lolendo lya baye bazali kokanisa ¡®te basili kobikisama, baye bazali na ezaleli ya kobanga Nzambe mpe na yango basili bakoki kati na mibeko. Solo mpenza, basosolaki te ¡®te misala ya losambo ekoki te soki yango ebongoli motema te, elobaki Léon XVI. Abakisaki lisusu ¡®te: ¡°Nzambe alingi te ¡®te losambo ekabwana na bomoi mpe asepelaka te na bambeka mpe na bansambo soki yango ezali komema biso te na kozala na bolingo mpo na bandeko ba biso mpe na kosala boyengebene¡±.
Liboso ya kopono nzela ya bokonzi, Ekuke ya moke ya ekulusu
Na yango, Pápa abéngaki elilingi wana ya Nsango-Elamu ¡®te «matumboli kitoko», mpamba te ezali kotiya libateli ya bayambi na ntembe, nzokande bayambi bakoki ntango mosusu kosambisa baye bazali mosika na kondima. Esengeli te kosakola eyamba bobele na maloba, koliya mpe komela elongo na ye na sakramentu ya, to koyeba malamu mateya ya bokristo. «Kondima na biso ezali ya solo ntango ezwi bomoi na biso mobimba, ntango ekomi lolenge ya bikateli bya biso (lolenge tozali kopona na bomoi bwa biso)» elobaki ye, mpe abakisaki ¡®te Yesu aponaki te «nzela ya pete mpo na kolonga to ya bokonzi, kasi mpo na kobikisa biso, alingaki biso mingi kino aleka na ¡®ekuke to ezibelo ya moke¡¯ ya ekulusu».
Bikateli ya mpasi mpe oyo bato basepeli na yango te
¡°Ezali lolenge ya boyambi bwa biso, ezali ezibelo oyo tosengeli kokatisa mpo na kobikisama (tala (Yoane 10:9) Na kozaláká na bolingo bwa ye mpe na kokóma na bomoi bwa biso, bato oyo bazali kolukaka boyengebene (bosembo) mpe kimya(boboto)¡±, Alobaki ¡®te yango elingi koloba kosala ntango mosusu ¡°mibeko ya mpasi mpe oyo bato balingaka yango te¡±, ¡°kobunda na moimi na yo mpe komipesa mpo na basusu, kolendendela na kosala malamu esika makanisi ya mabe emonani ete ezali na esika ya liboso, mpe bongo na bongo¡±. Kasi, Léon XIV alobaki ¡®te soki tokómi na esika yango, tokomona ¡®te bomoi efungwami liboso na biso na lolenge ya sika, mpe banda sik¡¯oyo, tokokota na motema monene ya Nzambe mpe na esengo ya eyenga ya seko oyo abongisi mpo na biso.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.