ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Angelus: ?Kozongisa mabe na mabe soki moke te?

Nsima ya kokamba molulu mwa Ukaristya o mokolo moye mwa lomingo la 17 ya Aug¨²sti na esika mosantu ya engumba ya Alban Laziale, P¨¢pa L¨¦on XIV azongelaki libondeli ya Anzelu na Esika ya bonsomi na Castel Gandolfo, liboso ya monk¨¤m¨¤ ya bakristu. Alimboli ¡®te, ¡°kosala na bosolo ezali na ntalo na yango, mpamba te, o kati ya mokili, ezali na bato oyo baponi lokuta¡±.

BAnsango ya Vatikan

 

Papa alobaki ¡®te «mosala mwa Yesu mpe moye mwa bayekoli ba ye, ezali eloko ya liseki te ; manso mazali fulele té, kasi ezali elembo ya bokeseni (Talá na Luka 2:34)». Léon XIV alobaki lisusu ¡®te Kristu ayebaki ¡®te mosika mingi te «bakonyokola ye, bakokanga ye, bakofinga ye, bakobeta ye fimbo mpe bakobaka ye na nzete na Yerusalema», mpe ¡®te «nsango na ye, atako ezali kolobela bolingo mpe bosembo, ekoboyama ntango bakonzi ya ekólo bakotelela makasi mateya ma ye».

Kosàlà na bosolo ezali na motuya mwa yango

Wana akutani na minyoko mpe mikakatano, moyekoli mwa Yesu asengeli komikundola ¡®te ¡°bato bazali zongazonga ya biso, bakoki kondima tango inso soki moke te, makambo manso ya malamu oyo ozali kosala. Nzokande, tango mosusu, kaka mpo kitoko ya bolamu bonà bozali kotungisa bato oyo bazali kondima yango te, baye bazali kosala yango bakutanaka na bokeseni makasi, ata mpe minyoko mpe kotyolama¡±; ekobaki ye koloba. Alobi lisusu ¡®te: ¡°kosàlà na bosolo ezali na motuya, mpamba te o kati ya mokili mokili, bato bazali kopona lokuta, mpe ntembe te Zabolo azali kosalela yango mpo na koluka mbala mingi kopekisa to kobebisa misala ya bato malamu¡±.

Kozongisa mabé na mabé soki moke te

Episkopo wa Roma alendisaki ¡®te, atako mposa ya kosala bongo ezali makasi, tosengeli te kotika nzela malamu mpo ya koluka kolongobana na elimo ya mokili moye, to kotika te elimo ya mokili moye motambwisa biso. Kasi, tosengeli «kokoba kosala bolamu mpo ya biso moko mpe mpo ya bato banso, ata mpe ya baye bazali konyokola biso».

Kokoba kosàala bolamu na ndakisa ya ba martyro, elingi koloba te :  «koboya kozongisa mabe na mabe kasi kozala semba na bosolo na bolingo». Litatoli liye  ya ba martyro, ezali lolenge oyo ya moko na moko kati na biso (baboti, balakisi, bato ya mosala, bakonzi ya mangomba, bato ya mopelengano (politiki), mpe bongo na bongo). « Oyo akomityela mokano mpo ya kokokisa mokumba mwa ye na bosembo bonso, mpe mpo na moto inso oyo azali kosàlà makasi mpo na kokokisa mikumba mya ye na boyokani na mateya ya Nsango Elamu».

Mokristu «asengeli te koluka komimonisa na miso ya bato, kasi aluka kondimama na Nzambe», elendisi Papà na kotangáká maloba ma Saint Ignace ya Antioche.

Na kosukisa losambo la Angelus, Tata Mokonzi monene wa bantomà asengaki bolobeli bwa Maria, Mokonzi-Mwasi ya baMartyro, «asalisa biso to zala tango inso, banzeneneke to batatoli ya bosembo mpe ya mpiko ya Mwana wa ye. Asunga bandeko ba biso babali mpe basi oyo bazali konyokwama lelo mpo ya eyamba ya bango».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

17 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 15:54