Angelus: «Epai wapi tozwami, tozangisa libakù moko te ya kolinga»
Albys KBD, CP – Kinshasa
O boso bwa bankóto ya bakristu bayanganaki na esika monene ya Saint-Pierre, na nse ya moi makasi, Pápa asalaki libondeli ya Angelus na lininisa ya ndako ya bantoma (Palais apostolique). Kasi liboso, Léon XIV azongelaki Nsango Elamu ya mokolo mwa lomingo la zomi na libwa (19ème) ya mobù C, oyo ezwami na Luka 12, 32-48, epai wapi Yesu azali kobyanga bayekoli ba ye ‘te báteka biloko bazali na yango mpe bápesa yango na babola.
Na maloba na ye, Klisto azali kolendisa biso ‘te «tóbomba te makabo oyo Nzambe apesi biso, kasi tósalela yango na motema mobimba mpo na bolamu ya basusu, mingimingi baoyo bazali na mposa ya lisalisi na biso, elimbolaki Pápa. Esengeli te kokabela kaka, biloko biye tozali na yango, kasi mpe kosalela makoki ma biso, ntango na biso, bolingo na biso, bozali na biso, mpe komitya na esika ya basusu».
Episkopo ya Rome abakisi ‘te likabo ya Nzambe « ezali na bosengà ya esika, bonsomi, boyokani mpo ‘te ekoka kokokisama mpe komonisama: ezali na mposa ya bolingo oyo, yango moko, ebongolaka mpe ekumisaka makambo manso ya bomoi bwa biso, mpe esalaka ‘te tókóma ntango inso lokola Nzambe ».
«Misala ya kimotema ngolu, ezali banki ya malamu koleka mpe ekopesaka litomba, epai wapi tokoki kotiyela bomengo ya bomoi bwa biso».
Pápa alingaki ‘te bakristu ba ye báyeba ‘te kopesa ezali eloko oyo ezali kokembisa moto. Azongelaki maloba ya Santu Augustin mpe alobaki ‘te eloko oyo moto akozwa eleki wolo to palata, ezali nde bomoi bwa seko. Yango wana, Léon XIV alobaki ‘te: “Na kati ya libota, na paloase, na kelasi (eteyelo), na esika ya mosala, ata soki tozali wapi, tóluka te kozangisa libaku inso ya komonisa bolingo”. Ezali nde bokengeli, oyo Yesu azali kosenga na biso: tomesana kozalaka na bokebi, komilengela, koyokela basusu mawa ndenge ye azali na biso ntango inso”.
Mpo ya kosukisa, yambo ‘te asala losambo la Maria, ya Angelus, Tata Mosantu abengaki mpo na kopesa mposa mpe bomipesi na Mama ngondo Maria: “Asalisa biso, na mokili oyo etondi na bokabwani, kozala ‘bakengeli’ bya ngolu mpe ya boboto, lokola Santu Jean Paul II ateyaki biso, mpe lokola bilenge oyo bayaki na Roma mpo na Eyenga ya Mbotama bamonisaki biso yango malamu”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.