MAP

Elili ya bolakisi Elili ya bolakisi  (AFP or licensors)

Papá asámbeli po ya baye babomaki bangó na Komanda na RDC

Na télégramme mókó na lopoto etiami mabokó na episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, Secrétaire ya Leta ya Ngwende ya Sántu-Petelo, Papá Léon XIV alobaki mawá na yé simá ya mobúlú na paloise Mwa Esengo Anualite ya Komanda na Congo/Kinshasa. “Likambo ya mabé eye ebianga bisó makási lisúsu ya kosala po ya botómboli moto mobimba ya bato baye bazui pási na etúká ena”, elobi télégramme eyé ebimaki mokolo ya yambo 28 ya sánzá ya sambo.

Vatican News

Na butú ya mokolo ya posó ya 26 kino ya eyenga ya 27 ya sánzá ya sambo 2025, pembeni na ngonga ya 21, bato bazalaki na bibundeli bazuaki esika ya kosala mabé na ndáko-Nzámbe mókó ya katoliko ya Komanda, na nordi-esti ya Congo/Kinshasa. Engebene na maloba ya bato ya etúká pe ya baye basálisaka bato, bato bayaki na mobúlú bazali ya Forces démocratiques alliées (ADF), lingómbá mókó endima kosala na lisangá ya Etat islamique.

Pási ya Papá

Na télégramme mókó na lopoto etiami mabokó na episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, Papá Léon XIV alobi “ayoki na mawá pe na pási” “mobúlú eyé esalemi na paloise Mwa Esengo Anualite ya Komanda na engúmba ya Ituri, eye eluki liwá ya bandimi ebele, basanganaki po na losámbo”. Na bosangani na “matánga ya mabótá pe ya lisangá ya bakristu baye bayoki pási makási”, Sántu-Papá alakisi “bolingo na ye” pe alaki bangó na “losámbo na ye”, elobi télégramme etindámi epayi ya Mgr Fulgence Muteba Mugalu, mokónzi ya Lisangá ya ba episkopo ya Congo/Kinshasa, eye ebimaki mokolo ya yambo ya 28 ya sánzá ya sambo. “Likambo ya mabé eye ebianga bisó makási lisúsu ya kosala po ya botómboli moto mobimba ya bato baye bazui pási na etúká ena”, tokoki kotánga.

Episkopo ya Roma, elobi lisúsu mokánda, “akobóndela Nzámbe po makilá ya ba martyro waná ezala mbóto mókó ya kimia, ya bozongisi bondeko, ya bondeko pe ya bolingo po na bato bansó ya Congo”. Léon XIV asúkisi nsango na ye ya bozali pembeni, ya bolendisi pe ya bolingo na “botindi bobenisi na ye na paloise Mwa Esengo Anualite ya Komanda, mingi mpenzá na mabótá bizali na pási, na bána bási pe bána babáli ya Congo/Kinshasa pe ya ekóló mobimba”.

Engebene na motángo ya sika epesami na Monusco, na botángi “maye leta elobi”, koleka bato 43 kati na bangó bána 9 babomaki bangó na ba mbeli. Sángó mokónzi ya paloise, abbé Aimé Lokana Dhego, alobi po na yé ‘te bato mingi misúsu batomboki bakeyi na bangó pe bazali na nsango na bangó te.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

29 sánzá ya nsambo 2025, 01:35