Pàpa asàmbeli mpo na baye bazwi likàmà ya moto na Irak
Bansàngo ya Vatikan
Pápa Léon XIV amonisi mawa ma yé mpo na mόto ya zando oyo ebomaki bato koleka tùku motoba (60) na butu ya mokolo mwa misato mpe ya mokolo mwa minei na engumba Kut, na Irak. Na telegrame oyo episkopo wa lokùmu Pietro Parolin atindelaki yé, Pápa atyaki «milimo ya baye bakufaki na motema mawa ya Mozwi-mwa-Nguya-Inso» mpe atindi «lisungi na yé ya molimo na baye banso bazali konyokwama na mpasi ya likama liye, mingi mpenza na baye bazoki mpe na mabota maye bazali na mawa».
Matanga na ekolo mobimba
Na mpokwa ya mokolo mwa misato, mόto moko epanzanaki na zando ya mombongo Corniche Hypermarket na Kut, na ntaka ya bakilometele 160 na Súdi-Esti ya Bagdad, mpe epanzanaki na ndako mobimba na bawangata mitano. Ministère ya Intérieur elobaki ‘te mόto yango « ebomaki bato tuku motobà na moko (61) oyo basalaki eloko te, mingi bakufaki na kati ya kinkoso». Abakisaki ete nzoto ya bato zomi na minei (14) oyo batumbamaki na mόto eyebani naino te. Babateli ya bana-mboka babikisaki bato koleka tùku minei na mitano (45) oyo bakangamaki na kati ya ndako, o kati ya restaurant moko mpe supermarché moko.
Ntina ya mόto eyebani naino te, kasi mibeko ya libateli oyo mbala mingi batosaka yango te na misala ya botongi bandako na Iraq, ezali kotunama sik’awa.
Mbulamatari ekweisaki mikolo misato ya matanga mpo na ekólo mobimba. Mokonzi ya mbulamatari, Mohamed Chia al-Soudani apesaki etinda ya “bolukiluki” mpo na koyeba “makambo ya mabe” mpe kopekisa likàmà mosusu. Ayatollah Al-Sistani, mokonzi monene ya lingomba ya chiite na Irak, atindelaki mabota ya bato oyo bakufaki maloba ya mawa.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.