Pápa alendisi bato mpo ‘te báluka masangà ya bato (ba ekolo) bya boboto
Bansango ya Vatikan
Na kati ya liyebisi na yé moko, oyo ekomami na mokomeli ya VatiKan, Tata wa lokùmu Pietro Parolin, Pápa Léon XIV alobaki ‘te esengeli «kokolisa boyokani malamu kati na bato, mpe kosàla ‘te bato bázala na kimya mpe na bosembo mpo na kokolisa moto mobimba mpe bolamu ya libota mobimba ya bato».
O kati ya mokandà monà, Tata-Mosantu alobi na mokomeli monenen ya CISL, Daniela Fumarola, nà mpe bayangani ba likita ya ekolo mobimba ya Italie ya mbala ya tukù mibale na mibale (XXe), mpo na lisàngà lya basàli. Likita liye lifungwamaki o mokolo mwa misato mwa zomi na motoba16 ya sànza ya yuli na Roma. Likanisi-moto ya likita lina ezali ‘te “mpiko ya kopesa biyano”.
Bakambi bya bato
Léon XIV alakisi “esengo ya yé mp ona likambo liye lisàlemi; tembe te, ekomonisa ebandeli ya motuya kati na mosàlà” ya lisàngà. Bakolikya ‘te “liyangani liyé ya ntina mingi ekopesa bato mposa ya komipesa lisusu mpo na kosàlisa bato banso báyeba mikumba mya bango”. Pápa alendisi batindami ‘te “bábosana te mokano moko bazali na yango ya kopesa maboko na “tranquillitas ordinis”, to “kimya na kobongisa”, maloba oyo mabimisamaki na Santu Augustin.
Kosangana ya basàli na Italie
Mokomeli monene ya CISL, Daniela Fumarola, azwaki mpe mokanda moùtaki na Mokambi wa ekolo ya Italie, Sergio Mattarella; yé akomi ‘te: “Bonsomi mpe demokrasi, na Italie mpe na mikili ya Poto, esengeli na bosangani ya basali”.
Alobeli ntinaoyo CISL aponi ya kotiya “mpiko ya bosangani” o ntei ya liyangani ya bango. Abengi yango “elembo ya malamu” mpe “lisungi na masolo ya bato mpe ya mopelengano (politiki)”.
Na liyebisi lya yé, mokambi ya Italie azongeli lisusu mokumba ya kala ya ba masàngà na kozala ndakisa (modèle) ya masangà ya bato ya mikili ya Poto (Europe). Ezali “ndakisa moko mp ona lotomo la basàli banso o kati ya mokilimobimba”. Mpe amonisi ‘te “kokokisa lotomo ya mosala mpe ya lifuti oyo esengeli mpo na bomoi ya bonsomi mpe ya lokumu” ezali motele ya bokolisi mpe ya kokomisa mayele.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.