ÐÓMAPµ¼º½

Botali na ndenge ya likolo, mboka Kerrville na Texas, edindisami na mpela, o mokolo mwa minei ya sànzà ya yuli (4 juillet). Botali na ndenge ya likolo, mboka Kerrville na Texas, edindisami na mpela, o mokolo mwa minei ya sànzà ya yuli (4 juillet).  

Mawa Pápa ayoki mpo na mpela ebomaki bato na Texas

Na nsuka ya losambo la Angelus, Mokonzi Ntoma monene, atindelaki mabota ma bato baye bakufaki na mpela ya somo ebetaki na etúká ya Ngele (súdi) ya Etats-Unis na mikolo mileki, liyebisi lya bondeko.

Bansango ya Vatikan

 

Nasengeli mpenza kopesa na mabota manso babungisaki balingami ba bango, mawa ma motema mwa ngai. Mingi mpenza baye bana ba bango ya basi bazalaki na esika ya masano (camp de vacances) na tango ya likama ya mpela ya ebale Guadalupe, na mboka Texas, o ekolo ya Etats-Unis. Tozali kobondela mpo na bango. Wanà ndé maloba ma Tata-Mosantu na lokota ya Angelesi, sima ya losambo la Angelus. O mokolo mwa lomingo, liboso ya bakristu bayanganaki na esika monene ya Santu-Petro (Place Saint-Pierre), Pápa Léon ya zomi na minei (Léon XIV) abongolaki miso ma yé o mboka abotamaki, États-Unis, mingi-mingi na etúká ya Texas epai kuna bambula makasi miùtaki kobeta mikolo mileki, ebimisaki mpela makasi.

Motango ya bato baye mpela ebomi, ezali mingi mpenza: bato 51 bakufi na tongo ya mokolo mwa lomingo, 6 Yuli. Motuya yango ekoki komata. Bilenge basi pene ya tùkù misato (30) oyo bazalaki na esika ya masano mpo na eleko ya molungé, bazali naino komonana te. Basinzili ya mpepo, ya mokili, mpe ya mai bazali koluka-luka na mai ya ebale Guadalupe  soki bakoki kozwa baye bazali naino nà bomoyi mpe bibembe. Greg Abbott, guvelenele ya etúká ya Texas, akendaki na esika wapi likama lisalemaki, bongo alobaki ‘te, ezali likama ya mabele.

Gustavo García-Siller, episkopo-mokonzi ya San Antonio, akendeki mpe na Kerrville mpo na kosàmbela mpe kopesa lisungi na mabotà ma bato baye bakufelaki. Akendeki mpe kotala Notre-Dame, ndako-nzambe ya Katoliko, oyo ebongwanaki na esika wapi bakoyamba mabota bakimáki mboka mpo ya mpela.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

07 sánzá ya nsambo 2025, 09:00