ÐÓMAPµ¼º½

2025.07.04 Masolo ma Pàpa nà mbulamatrari ya Monténégro, S.E. Milojko Spajic, o mokolo mwa minei ya sànzà ya yuli 2025. 2025.07.04 Masolo ma Pàpa nà mbulamatrari ya Monténégro, S.E. Milojko Spajic, o mokolo mwa minei ya sànzà ya yuli 2025.  (@VATICAN MEDIA)

Masolo ma Pàpa nà mbulamatrari ya Monténégro

O mokolo mwa minei ya sànzà ya yuli (4 juillet), Léon ya zomi na minei (Léon XIV) ayambaki na ndako ya bantoma ya Vatikan, Milojko Spajić, oyo akutanaki mpe nà episkopo wa lokùmu Pietro Parolin, Mokomeli ya etukà ya Saint-Siège. Bazalaki elongo nà Mgr Paul Richard Gallagher, Mokomeli mpo ya boyokani nà baetukà mpe bibongiseli ya bikolo na mokili.

Bansango ya Vatikan

 

Na tongo ya mokolo mwa minei ya sànzà ya yuli (4 juillet), Pàpa Leon ya zomi na minei (Léon XIV) ayambaki na ndako ya bantoma ya Vatikan, mbulamatari ya ekolo ya Monténégro, Milojko Spajić. Sima akutanaki mpe lisusu nà episkopo wa lokùmu Pietro Parolin, Mokomeli ya Etukà ya Saint-Siège, oyo azalaki elongo nà elongo nà Mgr Paul Richard Gallagher, Mokomeli mpo ya boyokani nà baetukà mpe bibongiseli ya bikolo na mokili.

Masolo ma Pàpa nà Mbulamatari ya Monténégro, Milojko Spajić
Masolo ma Pàpa nà Mbulamatari ya Monténégro, Milojko Spajić   (@VATICAN MEDIA)

Na boumeli bwa masoló manà ma esengo, masalemaki na Secrétariat ya etukà, liyebisi moko ya Ndako ya bapanzi-nsango ya Vatikan emonisi ‘te balobelaki na ntina ya boyokani malamu oyo ezali kati na bikólo biye bàbalé. Kasi mpe balobelaki lisusu makambo mosusu matali boyokani kati na Eklezya mpe Letá ya Monténégro, oyo ezali République parlementaire ya bituluku mingi epai kuna mokonzi mbulamatari azali mokonzi mwa ekolo.

Episkopo wa lokùmu Pietro Parolin nà Mbulamatari ya Monténégro, Milojko Spajić
Episkopo wa lokùmu Pietro Parolin nà Mbulamatari ya Monténégro, Milojko Spajić   (@Vatican Media)

Na likita linà, balobelaki mpe makambo ya kati ya mboka mpe ya mikili ya bapaya. Bongo batyaki likebi mingi na makambo matali kobakisama ya Union européenne na mikili ya Balkans ya Westi. Asengaki mpe ‘te atalela matata oyo ezali kosalema na Ukraine.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

05 sánzá ya nsambo 2025, 09:20