MAP

Papa Léon XIV azali kopesa mbote na bato ya mobémbo mwa boyambi lelo na likita po ya banso Papa Léon XIV azali kopesa mbote na bato ya mobémbo mwa boyambi lelo na likita po ya banso  (ANSA)

Likita po ya bansó: eleko na bisó ezali na pósá ya libiki lokóla

“Eleko na bisó ezali na pósá ya libiki lokóla, po etóndi na mobúlú pe na likúnya biye bikomóna pámba lokúmu ya moto”, elobaki Papá wa Roma. Asúkisaki bôngó mokolo ya misáto ya 30 ya sánzá ya sambo molongó ya matéya maye matali bomoi ya Yezu libóso ya bato, esalemaka na bokútáni, na masésé pe na libiki. Libóso ya “bozoba” ya ba connexion ya ba réseaux sociaux eye ekobebisa mokili na bisó, “Mokónzi akopesa bisó bolingo mókó ya bokútú, na misála biye bikoloba bokútáni mókó ya mozindo”, elobaki ye.

Jean-René B.-Kinshasa

Mokolo elandi bofúngoli ya Zubilé ya biléngé, bandimi ebele bakútánaki na esika ya Sántu-Petelo na tóngo ya mokolo ya misáto ya 30 ya sánzá ya sambo. Na sé ya mói mókó kitoko, Papá Léon XIV alobaki litéya na ye ya likita na ye ya yambo simá ya bopemi mwa mikolo elekaki na ndáko ya papá na Castel Gandolfo.  

Na bolobi na bato ya mobémbo mwa losámbo basangani na esika ya Sántu-Petelo, Sántu-Papá alobaki ‘te, o ngonga eye ya Internet, “epái wápi tozali na ba connexion bebo, totóndisami na bilili, tángo mosúsu ya lokúta to babongoli yangó, pe atáko tozali kozua ba nsango ebele biye bikobóta na bisó ekúmbaki mókó ya makanisi bikeseni”, ekoki kosalema 'te tozala na pósá ya koboma nionso, ya koyóka eloko mókó te, ya komikangema na kimia, “na bozangi bosololi mókó, atáko soki toyebani, tozali kokoka lisúsu te ya komiloba makambo ya pete pe ya mozindo koleka”. Yangó waná episkopo ya Roma alingaki kotelema na esika ya Nsango-Ndamu ya Malako oyo akolakisa bisó moto mókó alobaka te pe ayókaka te (cf. Mk 7,31-37)

Komikangema ekoki atá moke te kozala eyano mókó

Na bokobi litéya na ye, Papá alobaki ‘te nionso lokóla yangó ekoki kokómela bisó lelo. Moto ena, emonaki ye, tángo mosúsú azuaki mokáno ya koloba lisusu te po amonaki ‘te azali koyokana te na bato, pe ya kokóma ebúbú (muet) po atikalaki mawa-mawa pe pási ezuaki ye na eye ye ayókaki. Ya sóló, elimbolaki Léon XIV, “ezali ye te akeyi epái ya Yezu po azua libiki, bamemi ye na bato misusu baye bazali na ntina ya bomikangemi na ye te”.

Kasi, etalisi Papá, ezaleli ya Yezu ekoki kokamuisa libóso, po azui moto waná na ye pe amemi ye pembeni. “Emonani lokóla azali kobakisa bokangemi na ye, kasi na kotala pembeni mpenzá, yango ekosúnga biso tososola eye ekobombana simá ya bokútú pe ya bomikangemi ya moto ena, lokóla ayebaki pósá na ye ya kozala na nkuku pe pembeni”. Ya sóló, elimbolaki ye, Yezu apesi ye libóso libóso pembeni mókó ya bokútú, na nzelá ya misála bikolakisa bokútáni mókó ya mozindo: “asimbi matoyi pe lolému ya moto ena”.  Yezu aluki maloba ebele te, alobi likambo mókó eye esengeli na ye na ngonga waná: “ܾ&ܳٱ;&ܳٱ;!”. Ezali lokóla Yezu akoloba na ye: “Zibwáná na mokili eye ekobángisa yo! Zibwáná na bokútáni na bato eye ekómisi yo mawa-mawa! Zibwáná na bomoi eye yo obóyaki kobunda na yangó!”, po komikangema ekoki atá moke te kozala eyano mókó.

Po na kokóma bayekoli ya Yezu, “nzelá ya mokúsé” ezali te

Simá ya bokútáni na Yezu, episkopo ya Roma alobi ‘te moto ena azongeli kaka koloba te, kasi azali kosála yangó “malamu”. Litemele (adverbe) mókó ekotisami na mopanzi nsango-ndamu, oyo emonani alingi alobela bisó mingi na ntina ya bokútú na ye. “Tángo mosusu moto ena akátaki koloba po azalaki komona ‘te azalaki koloba mabé, tángo mosusu abándaki koyóka ‘te azali kokoka te”, emonaki ye.

Papá Léon XIV alobaki ‘te bansó, tozali kokútana na likambo ya koyókana malamu te pe komiyóka ‘te toyókani te. Tozali bansó na pósá ya kosénga na Mokónzi ya kobika na ndéngé na bisó ya kosolola, kaka po na kozala makasi koleka te, kasi lokóla po na kobóya kosála pási na basusu na maloba na bisó. Kozongela koloba malamu, elimbolaki ye, “ezali ebándeli ya botámboli, ezali naino esika ya kokóma te”. Pe po ya koyeba Yezu ya sólo, elobaki Papá, “esengeli kosála botámboli mókó, esengeli kotikala na Ye pe koleka lokóla na Malozi na ye”.

““Tango tomoni ye asambuisami pe akonyokwama, tángo tosáli likambo ya ngúya ya libiki ya Kurúsé, waná tokoki koloba ‘te toyebi ye ya sólo. Po na kokóma bayekoli ya Yezu, nzelá ya mokúsé ezali te”.”

Na súka ya litéya na ye, Léon XIV abiangaki bandimi basénga na Mokónzi “ya kotéya bisó kosolola na ndéngé ya sémbo pe ya bokebi”. Aséngaki bangó lokóla ya kosámbela po na baye bansó bayokaki pási na maloba ya basusu pe po ya Eklezia, “po atika soki moke te etindá na ye ya komema bato epayi ya Yezu, po bakoka koyóka Liloba na ye, babika na yangó pe bakóma bangó lokóla bakúmbi ya liloba na ye ya libiki

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

30 sánzá ya nsambo 2025, 16:04