Léon XIV: Elikya ekozongisa limemya mpe bolingo epai ya babàngé
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na bopusani bwa milùlù mya mokolo mwa bankoko bya mokili mobimba mpe ya babàngé, Pàpa Léon ya zomi na minei alendisi na bozangi kobosana babàngé mpamba té bazali «bilembo bya Elikya ». Eyenga ezali nà moto mwa likanisi «Esengo na moto abungisi elikya te». Apesi ndakisa ‘te: “kozingisa na ekopi mobàngé moko, ekosalisa biso nakososola ‘te lisapo lya bomoi bwa biso esilaka te na eleko ebebe (present), mpe ekosila te na mwa tango ya bokutani ya mwa tango moke mpe boyokani ya bitenibiteni, kasi ekosalema na mikolo mizali koya”.
Léon XIV atalisi “mbala boni bankoko babiso bazalaki ndakisa ya boyambi mpe ya komipesa mpo ya biso, ya bizaleli bilamu ya mboka mpe ya kosalisa bato, ya kokundola mpe ya kolendendela o kati ya mikakatano”. Libula liye lya kitoko epesameli nà “elikya mpe bolingo”, ekoki te “kozala mpo na biso, makoki to ntina ya botondi mpe boyokani”, elobi Pape.
Bato bakobosanaka tango mosusu bankulutu
Loboko la Nzambe na bilaka bya ye «bizali koteya ‘te bobangé ezali na esengo, esengo ya solo ya Nsango Elamu», oyo «ezali kosenga biso tobuka bifelo ya bokeseni oyo babànge bakangemelaka». Pàpa alobi ‘te ezali mawa na komona «bato ba mboka ba biso bamesaná kotika eteni moko ya ntina mingi mpe ya motuya ya bomoi bwa bango, batiya bango pembeni mpe babosànà bango». Apesi toli ya kotalaka bango, mpamba te, « kokende kotala babàngé ezali lolenge ya kokutana nà Yezu, oyo azali kolongola biso na kozanga kosangana na bato mpe na mayoki ya kozala yo moko».
Mpo na Léon XIV, soki solo bolembù bwa babànge ezali na mposa ya makasi ya bilenge, ezali lolenge yoko solo ‘te kozanga eksperianse ya bilenge ezali na mposa ya litatoli ya babange mpo na kobongisa lobi ya bango na buanyà.
Esengo na moto oyo abungisi elya te, ezali maman a likanisi lya mokolo mwa babàngé ya mbala ya mitano.
Elikya, oyo ezali na ntina mingi na eleko ya Zubilee, ezali mpe motó ya likambo oyo Pápa aponaki mpo na mokolo mwa mitano ya mokili mobimba mpo na bankoko mpe babànge, oyo ekosalema o mokolo mwa 27 ... Mbongwana ya bizaleli ezali na ntina mpe ezali komonisa ‘te Eklezia mobimba ezwi mokumba: paloasse na paloase, lisanga to etuluku ya eklezia, ebyangemi na “kokoma bato ba “mbongwana” ya botondi mpe ya kotala malamu”. Ya kozwa mokano ya kokende mbala na mbala kotala bango, na kosala mpo na bango mpe elongo na bango, ba nzela ya lisungi mpe ya losambo. Na kosala boyokani oyo ekoki kopesa elikya mpe lokùmu na baye bazali komiyoka ‘te babosani bango”. Episkopo ya Roma abakisi na koloba ‘te: “Elikya ya bokristu ezali tango inso kopusa biso na kozala na mpiko koleka, na kozala na elikya makasi”. Kasi esengeli mpe kosala mbongwana oyo “ekopesa lisusu mibange lokùmu mpe bolingo”.
Bobangé ezali eleko ya bobenisi mpe ya ngrasya
Kati na mateya ma yé, Mokonzi Monene ya bantoma abéngaki mpe mibange oyo mbala mosusu bamiyokaka ‘te basundolami na bato to na baninga ba bango, balembi, bazali kobungisa elikya mpo na mikakatano ndenge na ndenge ya bomoi. Léon XIV asengi na bankulutu ‘te «báyika mpiko na kotiya motema na Nzambe,» «bámipesa bango moko na bozongisi sika mokolo na mokolo mpona kokutana na Yé, na losambo mpe na nzela ya Misa masantu», «bakabola bolingo ya boyambi bwa bango oyo bayekolaki » na boumeli ya bambula ebele na libota mpe na makita ya mokolo na mokolo.
Na kotángáká Makomami Misantu, Pápa amonisaki lolenge kani Nzambe ye mei apesi ndakisa mbala na mbala amonisi lisungi lya yé na mpe asololaki na babàngé. Ezali bobele bongo mpo na Abalayama, Sarayi, Zekalia mpe Elisabeta te, kasi mpe mpo na Moize, oyo abyangamaki mpo na kosikola libota lya Ye, nzokandé azalaki na mibu tùkù mwambé (80ans). (Tala yango na Ex 7,7). Pàpa alobi ‘te, na nzela ya mokano moye, azali koteya biso ‘te, «o miso ma yé, bobange ezali ntango ya mapamboli mpe ya ngrasya, bongo, babànge bazali banzeneneke ya liboso ya elikya ». Na nsima, asukisaki na maloba maye: “Tosengeli kozala bilembo bya elikya o bileko binso”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.