MAP

2025.07.13 Pàpa Léon XIV, na tango ya losambo la Angelus, na Castel Gandolfo. 2025.07.13 Pàpa Léon XIV, na tango ya losambo la Angelus, na Castel Gandolfo.   (@Vatican Media)

Angelus na Castel Gandolfo: «Kondima mokano mwa Nzambe to koyamba oyo elingi Nzambe»

Na tango ya sambo la Angelus, esalemaki na ndako ya bantoma oyo ezali na ngambo ya bangomba Albains, na Castel Gandolfo, Pàpa Léon XIV abeti nsété alobi: “mpo ya kozala na bomoi bwa seko, ezali na ntina ya kobanga liwà tè, kasi esengeli kosalela bomoi” elingi kolimbola ‘te “tosengeli kosunga bomoi ya basusu, na lisalisi lya tango ya biso tozali kokabola”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

Angelus ya lomingo 13 ya sànzà ya yuli na 2025 - Pàpa Léon XIV LSF

Motéi, na sengeli kosala nini mpo ‘te na zwa bomoi bwa seko ?” (Tala na Lc 10, 25…). Kobanda na motuna moye batunaki Yezu, Tata-Mosantu, yambo ‘te abanda lilendisi mpe losambo la Maria mwa lomingo la mokolo mwa zomi na misato (13) ya sànzà ya yuli, alobi ‘te: maloba maye mazali komonisa “mposa tango inso na bomoi bwa biso: mposa mwa lobiko”, elingi koloba ‘te “mposa ya bomoi boye bozangi bokwei, bobé mpe bowei”.

Kondima mokano mwa Nzambe

Solo, Leon XIV alobaki ‘te «bomoi bwa seko, oyo bobele Nzambe nde akoki kopesa, epesami na moto, lokola libula oyo ekouta na tata mpe elki epai ya mwana wa ye". Ebongo mpo na kozwa likabo lya Nzambe, «tosengeli kondima mokano mwa yé to mpe tosengeli koyamba oyo elingi yé. Lokola ekomami o kati ya Mibeko».  Mokano mwa Nzambe ezali «mobeko moye ya bomoi, oyo Nzambe yemei akokisi o kati ya biso, nakolinga biso mpenza na bomoto bwa ye mobimba, na nzela ya Mwana wa yé Yesu Kristu».

Losambo la Angelus na Castel Gandolfo
Losambo la Angelus na Castel Gandolfo   (@Vatican Media)

Kosalela bomoi

Tata-Mosantu akobi na kolimbola ntina ya kozala na bomoi mpo ya seko, “esengeli tè ‘te moto akima liwa”, kasi “asengeli kosalela bomoi”, na sunga to kolengelaka bomoi bomoi bya basusu. “Oyo ezali mobeko eleki monene, eleki mibeko minso ya bato mpe epesaka yango ndimbola”.

Na makambo misusu, Pápa apesaki toli ya kozala penepene na bato oyo tokutani na bango na nzela. Na ndakisa ya Yesu, Mobikisi mwaa mokili, alobaki ‘te, “biso mpe tobyangami mpo na kopesa libondi mpe elikya, mingi mpenza epai na baoyo balembi mpe bazali konyokwama na makanis”.

Bakristu na tango ya losambo la Maria la Angelus
Bakristu na tango ya losambo la Maria la Angelus   (@Vatican Media)

Bato bakotyaka kimya

Mpo na kosukisa, Mokitani mwa Petro abyangaki na kosenga bolobeli bwa Ngodo-Maria, Mama wa ngolu, mpo ‘te “asalisa biso na koyamba o mitema mya biso, mokano mwaa Nzambe, oyo ezali tango inso mokano mwa bolingo mpe ya lobiko, mpo ‘te tozala mokolo na mokolo bato bakotyaka kimya”.

Na nsuka ya losambo la Angelus, PapeLéon ya zomi na minei, apesaki mbote mpe matondi na bato banso bazalaki wana, mingi mpenza bakonzi ya Leta mpe basoda ya engumba Castel Gandolfo, “mpo ya lolenge bayambaki yé”.

Abengaki lisusu bandimi banso nakobondela “mpo na kimya mpe mpo ya baye banso bazali konyokwama mobulu mpe bitumba, bazali na minyoko mpe mposa ya lisalisi ( na bosengà) ”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

13 sánzá ya nsambo 2025, 15:11