MAP

Pàpa na tango ya losambo la Angelus na Castel Gandolfo, mokolo mwa lomingo, mwa 20 ya sàanzà ya yuli ya mobù 2025 Pàpa na tango ya losambo la Angelus na Castel Gandolfo, mokolo mwa lomingo, mwa 20 ya sàanzà ya yuli ya mobù 2025

Angélus: Eklezya esengeli kozala ndako efungwamà mpo ya bato banso

Na libaku lya libondeli ya Angelus, oyo ya mbala ya mibale na Castel Gandolfo, Pape akundwelaki ‘te eleko ya molunge ezali ntango ya “kozelisa” mpe kosalela libaku linà mpo ya kokutana na Yesu, koyekola bongo mayele ya koyamba bapaya. Léon ya zomi na minei (Léon XIV) alobaki ‘te: “Kino lelo, Nzambe azali kobeta lisusu na ezibelo (ekuke) ya biso”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Atako na nsé ya moi makasi, ebele ya bakristu bazali na esengo. Pápa Léon azongelaki mpo na mbala ya mibale losambo la Angelus ut’o esika ya Liberté na Castel Gandolfo, epai wapi azali kolekisa mwa mikolo ya bopemi, yambo te azonga na VatiKan.

O kati ya mateya ma ye, Mokonzi ntomà monene alobeli Abalayama nà Sara, mpe bandeko babale ya basi Malata nà Maria bayebaki koyamba. Pápa alobi ‘te, “Tango inso tokondima mbelà ya limpati ya Mokonzi mpe tokosangana o mesa ya Ukaristya”, “ezali sé Nzambe yemei ayei koleisa biso”. Kasi, Pápa akobi koloba ‘te: “Nzambe wa biso ayebi nayino komikomisa mompaya na biso, mpe kino lelomei, atelemi liboso mpe azali kobeta lisusu o ezibelo (ekuke) ya biso”.

Léon XIV atalisi boni boni liloba “mompaya” na lokotà lya italie, elimboli ndimbola mibale y antina: “moto oyo azali koyamba mpe moto ayambami” to mpe moto oyo bayambi.

““Na mokolo mwa lomingo moye ya eleko ya molunge, tokoki kotala boni boni boyambani bwa biso ezali kokita na bobola”.”

 Komibimela

Pàpa alobi ‘te : mpo ya koyamba mpe koyambama, esengeli kozala na bomikitisi, kasi mpe lisusu, kozala na boboto, bokebi na baninga, mpe kozala bofungwami. Na Nsango Elami, emonisi ‘te Malata (Marta) akoki kobungisa libakù lya esengo ya boyambani, mpamba te, amipesi mpe amitungisi na maye azalaki kosala mpo na koyamba Yesu, kasi, yango ndé ebebisaki libakù malamu oyo bazalaki na yango ya bokutani oyo okoki kobosana soki moke te. «Marta azali moto oyo ayebi kokaba, kasi Nzambe alingi kobenga ye na eloko mosusu ya motuya koleka bokabi bona. Abéngi yé ayeba komibimisa na ye moko».

Léon XIV alobaki ‘te, toluka komifungwama na «eloko oyo ekolongola na biso  mposa ya bomitalisi, tótika makambo mosusu oyo ekotondisa biso» ezali bongo,  lolenge sé moko ya «kokómisa bomoi bwa biso kitoko».

Pápa alobeli mpe ezaleli ya Maria oyo ekeseni nà ezalela ya Malata. Ekomonono lokola abungisaki likanisi lya tango, azwamaki na maloba ma Yezu. Azangi te mayele lokola yaya wa ye ya mwasi, mpe azangi te koyeba kokabola bo ndeko way e ya mwasi. “Nzokandé, azwaki se libakù linà». Yango wana, Yesu apalelaki Malata, mpo ete atikalaki libándá na esika oyo ekokaki kopesa ye esengo mingi.

Léon XIV alendisi na eleko ya molungé oyo ekoki kosalisa na “kozelisa” mpe kokóma mingi mpenza lokola Maria koleka lolenge ya Malata. Alobi ‘te: mbala mingi, tomipesaka na esengo te”. Nzokande, “tozali na mposa ya kopema mwa moke, na mposa ya koyekola lisusu makasi lolenge ya koyamba bampaya”.

Bokutani bwa solo solo ezali ya ofele (ya mbongo tè)

Pàpa akebisi mpo na ba industriel ya tourisme oyo “balingi kotekela biso ba espériansi ya ndenge na ndenge”, kasi ezali bongo oyo nde moto inso azali koluka? Engebene na Léon XIV, “bokutani bonso ya solo solo, ezali ofele mpe ekoki kosombama te: ezala bokutani na Nzambe, na bato basusu to na biloko bizalisami (la nature). Esengeli kaka kozala mompaya: kotika esika mpe kosenga yango; koyamba mpe kotika ete bayamba yo”. Asukisaki na koloba ‘te tozali na makambo mingi ya kozwa, kasi bobele ya kopesa te. Lokola Abalayama mpe Sara, oyo atako bakómaki mibange, babotaki, tango bandimaki koyamba Mokonzi na boboto epai ya bango. Biso mpe tozali naino na mabakù misisus ya koyamba ba bomoi mingi.

Papa azali na elikia mpe azali kobondela Mosantu mosantu Ngondo Maria, Mwasi-na-libonza, Mama oyo ayambaka bapaya, mpo ‘te kati na ye, emonisama polele libyangi lya Eklezia: kozala ndako oyo efungwami mpo na bato banso, mpo na kokoba koyamba Mokonzi wa yé, oyo azali kosenga ndingisa ya kokota.

Misa ya Léon ya zomi na minei (Léon XIV) ya mbala ya mibale na Castel Gandolfo,

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

21 sánzá ya nsambo 2025, 10:33