MAP

Angelus : Bondelani Nkolo wa elanga mpo asàla na biso basàli ba yé

Na kolobela Nsango Elamu ya Santu Luka oyo wapi Mokonzi apesi etindà na bayekoli ba yé tùkù sambo na mibale, Léon XIV (ya zomi na minei) abyangi ba Kristu na koyeba kososola oyo Nzambe alingi kosàla na bomoi bwa biso: mambi manene. “Bato baké kaka bakundoli yango mpe bakoteleme mpo ya koyamba likabo linà”.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Yambo ‘te asàla losambo la Angelus, ut’o ndako ya bantoma na mbala sukà mpo akenda bopemi ya poso mibale na Castel Gandolfo, Pàpa azongelaki Nsango Elamu ya Santu Luka, ya lomingo loye, alobaki na bakristu, lisolo oyo wapi Yezu apesi etindà na bayekoli ba yé, bongo atindi bango babalé-babalé (Lc 10, 1-12.17-20). Tùkù sambo na mibalé, yoko motango emonisi elembo “ekolimbola boni boni elikya ya Nsango Elamu ezali mpo na mabota manso. Ezali bongo bonene bwa motema bwa Nzambe, ezali bongo botondisami bwa mbuma o elanga ya yé. Elingi koloba mosala moye akokisi kati na mokili mpo ‘te bana ba ye banso básimbama na bolingi bwa ye mpe bábikisama”.

Yezu alobi malamu ‘te elanga itondi na mbuma mpe asengi kobondela mpo ‘te batinda basàli o elanga. Léon XIV alobaki ‘te: “Na ngambo moko, Nzambe, lokola moloni, abimi na mokili mpo na kolona mpe atiyi na motema mwa moto mpe na lisapo lya bato, mposa ya bozangi nsuka, ya kozala na bomoi mobimba, ya lobiko oyo ezali kosikola ye”. Na ngambo mosusu, “Bazali moke, basàli baye bazali kokende kosàla na elanga elonaki Mokonzi mpe oyo, mpe liboso ‘te tango na yango ekoka, esengeli kotala nà miso ma Yesu, baye bakoki koyeba soki mbuma ya malamu eteli mpo na kobuka yango”.

Nzambe alingi kosàla eloko ya motuya kati na bomoi bwa biso

Nzokande, koyeba mbuma malamu oyo elonamaki ezali kosalisa biso na kososola boni boni Nzambe “alingi kosala eloko (likambo) moko ya motuya kati na bomoi bwa biso mpe kati na lisoló(lisapo) lya bato”. Na nsima, Pápa alimbolaki ntina ya etindà: “Eklezya mpe mokili mozali te na mposa ya bato oyo bazali kokokisa mikumba mya bango ya bokristu na komonisáká libàndà boyambi bwa bango; kasi bazali ndé na mposa ya basàli oyo bazali na mposa ya kosala mosala mwa etindà o elanga. Bayekoli ba bolingo oyo bazali kotatola Bokonzi bwa Nzambe bipai binso bazali”. Mpo na kokokisa mokumba eye, Léon XIV alimbolaki ‘te “ezali na ntina te kozala kaka na makanisi mpamba na makambo matali mosala ya kobatela bampate, kasi ezali na ntina mingi kobondela Nkolo wa elanga”. Boyokani nà Mokonzi, kokolisa masolo nà Yé, ezali eloko ya motuya mpenza, esukisaki na kolimbola Papa. Na nsima “akosà na biso basáli ba yé mpe akotinda biso na elanga ya mokili mobimba lokola banzeneneke (batatoli) ya bokonzi bwa yé”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

06 sánzá ya nsambo 2025, 14:11