Nzoto ya Kristu : Kristu azali eyano ya Nzambe mpo ya nzala ya moto
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Pápa Léon XIV asalaki misa na molulu mwa Nzoto mpe Makila ma Klisto na lopango ya ndako-nzambe Saint-Jean-de-Latran, elongo na ebele ya ba episkopo wa lokùmu mpe bankóto ya bandimi. Na lisukulu na ye, Tata Mosantu abengaki baye bayaki likita linà, bakanisa ndenge Yesu abukaki limpa, «elembo ya likabo ya lobiko oyo Nzambe apesi».
Pápa alimbolaki ¡®te Nsango Elamo ya mokolo monà mozalaki eteni ekomamaki na Santu Luka (Lc 9, 11b-17), bongo ezalaki koloba ¡®te : bibele ba bato batikalaki « na boumeli ya bangonga mingi » mpo na koyoka Yesu « koloba na ntina ya Bokonzi bwa Nzambe mpe kobikisa bato ba maladi ». «Motema mawa mwaYesu mpo na baye bazali konyokwama, elakisi boninga bwa bolingo bya Nzambe, oyo ayei na mokili mpo na kobikisa biso». Kasi, «tango ya momekano mozali koyà, ata na baoyo bazali koyoka Nsango Elamu ya Kristo». Nzala ya bato mpe kolala ya moyi na esika wana ya esobe, «ezali bilembo bya nsuka oyo ezali koyela mokili, na bikelamu binso; mokolo ezali kosila, ndenge moko mpe bomoi ya bato». Nzokandé, ¡°ezali na ngonga oyo, tozali na kati ya bobola, na kozanga mpe na molili, Yesu azali na biso¡±, elobaki Tata-Mosantu.
Kristu ¡°ayokeli bato oyo bazali na nzala mawa, mpe asengi bayekoli ba yé ¡®te báleisa bango¡±. Kasi bayekoli bazali na ntémbé ¡®te mampa mitano mpe mbisi mibale ekoka mpo ya koleisa ebele ya bato. Pàpa wa Roma alobi ¡®te: ¡°o miso ma bato, bayekoli bazali na makanisi malamu, kasi yango ezali komonisa ¡®te boyambi bwa bango ezali mpenza moke. Ya solo, na nzela ya Yesu, tozali na manso oyo tosengeli na yango mpo ya kopesa makasi mpe ntina na bomoi bwa biso. Na mbela ya nzala, ayanolaki na bokaboli: ¡°Atomboli miso ma yé, abenisi, abuki limpa mpe apesi yango na baye banso bazali wana¡±. (Tala na v. 16). Léon XIV alobaki ¡®te elembo enà, ezali maji tè, kasi ezali komonisa botondi epai ya Tata, losambo la mwana wa yé Klristu, mpe bondeko oyo Elimo Santu ezali kopesa¡±.
Kokabola limpa mpo ya koyikinya elikya
Na esika ya ebele ya bato oyo bazali kolobela na Nsango Elamu, Pàpa asengi bandimi bakanisa ¡°ebele ya bato, oyo bakitisami na lokumu la bango mpo na lokoso la bato basusu koleka nzala na bango moko¡±. Tata-Mosantu alelaki mpo na bomengo ya bato moke liboso ya bobola ya bato ebele, oyo ebotaka mpasi mpe kozanga bosembo. ¡°Na esika ya kokabola, bomengo ezali kobebisa mbuma ya mabele mpe ya mosala mwa moto¡±, ekebisi Tata-Mosantu.
Na mobu moye mosantu, ¡°ndakisa ya Mokonzi etikali mpo ya biso elembo kosunga na lombango mpe ya mosala: kokabola lipa, mpo na koyikinya (kobakisa) elikia, elingi koloba kosakola boyei bwa Bokonzi bwa Nzambe¡±. Pápa akobaki na koloba ¡®te: na kopesa ebele y abato bilei, ¡°Yesu asakoli solo ¡®te akobikisa bato banso na liwࡱ. ¡°Yango nde mobombamo mwa boyambi tokosepelaka na sakramentu ya Ukaristya. Lolenge kaka nzala ezali elembo ya bobola bwa biso, sé bongo mpe kobuka mampa ezali elembo ya likabo ya lobiko oyo Nzambe apesi biso¡±.
Ukaristya, bozalisi solo mpe mobimba mwa Mobikisi
¡°Kristu azali eyano ya Nzambe na nzala ya moto, mpamba te, nzoto ya ye ezali limpa ya bomoi bwa seko: kamatani mpe bolia yango bino banso!¡± Elobaki Tata-Mosantu. Matiti mpe banyama bato bakolyaka mokolo na mokolo, ekokundwela ¡®te mokolo mosusu bango mpe bakokufa. Nzokandé, ¡°ntango tozali koliya Yesu, limpa lya bomoi mpe bwa solo, tozali na bomoi mpo ya ye. Na komikaba yemei mobimba, Mosekwi ekulusu amipesi yemobimba na biso, mpe bongo toyebi ¡®te tosalemaki mpo na koliya bilei bya Nzambe¡±.
Kotambola na molongo mpo ya komema Sakramentu Esantu na banso.
Bozali mpe bozalisi, ¡°Nzoto ya Klisto ekomisi biso, elingi koloba Eklezia yemei, nzoto ya Mokonzi¡±. Elobaki Pape Léon ya zomi na minei, liboso ya kolimbola na bandimi ntina ya molulu ya kotambola na molongo kino na Bazilike Sainte-Marie-Majeure nsima ya milulu mya Latran. Biso banso, bakengeli mpata mpe etònga, tomileyisaka na Sakramentu Esantu, tokogumbamela ye mpe tokomema ye na banzela (balabala). Lolenge wana, tokolakisa ye o miso ma bato, tokomema bango na bososoli mpe na mitema mya bato.
Tozongisami na bilei oyo Nzambe apesi biso, tomemi Yesu na mitema mya bato banso, yé oyo azali kosangisa bato banso na mosala mwa lobiko, azali kobenga moto na moto mpo na kosangana o meza ma yé.
Nsima ya misa, molongo ya bato ezwaki nzela ememaka na ndako-nzambe ya baPápa oyo ezali na nkombo ya Ngondo Maria. Mpe kuna, bapesaki bango bobenisi bwa bosukisi ya Ukaristya. Léon XIV abenisaki bandimi na nzela ya Sakramento Esantu santu. Na nsima, pápa ya sika akendaki komanyola mwa moke, na lilita lya Pápa Franswa.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.