ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Angelus ya Nzoto n¨¤ Makila ma Kristu: Ukaristya ekokomisa biso bomoko na Nzambe

Na lomingo loye la t¨´k¨´ mibale na mibale (22) ya s¨¤nz¨¤ ya yuni, epai bakosepela na bikolo mingi eyenga ya Nzoto n¨¤ Makila ma Kristu, P¨¤pa L¨¦on XIV, abengi bakristu bazala bomoko n¨¤ Nzambe ¡°nakokabola na nsai likabo la bolingo bwa y¨¦¡±

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Atako likolo ezalaki molili mpe mbula mozalaki kotungisa, monkàmà y abato basanganaki na esika Santu-Petro, o mokolo mwa lomingo loye la tùkù mibale na mibale ya sànzà ya yuni, bakosepela eyenga enene ya Nzoto nà Makila ma Kristu, na bikolo ebele, mingi mpenza na Italie. Na libakù linà, ut¡¯o lininisa lya ndako ya bantoma, Pàpa Léon alobeli liloba lya Nzambe, oyo elimboli likamwisi lya boyikinyi mampa nà mbisi, esalaki Yézu (tala na lc 9, 11- 17). Na eteni eye ya Nsango Elamu ya Santu Luka, bato bayiké bayaki epai ya Yezu mpo ya koyoka yé mpe koluka lisalisi. Mpo aleyisa bango, Yezu asengi na bapostolu ba yé bamemela ye mwa ndambo bazwi. Sina abenisi lipa nà mbisi, apesi bayekoli ba kabola byango n abato banso. ¡°Litomba na yango ezali likamwisi, mpamba te, moto na moto azwaki bilei asengelaki na yango, mpe mintika mizalaki bebo. Likamwisi liyé elimboli ¡°elembo¡± ekokanisa biso ¡®te makabo ma Nzambe, atako ezali mingi te, kasi ekoyikinya tango bakokaba yango¡±, elobi Tata-Mosantu.

Na libakù lya eyenga eye ya Corpus Domini, Léon ya zomi na minei abiangi lisusu bandimi na kososola o bozindo, likambo moko, bongo alobi: ¡°toyebi solo ¡®te na maboko ma moto inso ayebi kokaba, ezali na moto oyo aleki yé, elingi koloba oyo ya Nzambe. Ye mokeli, apesi biso bomoi mpe abikisi biso, asengaki moko ya bikelamu bya ye, azala mama wa yé, apesa yé Nzoto ya bomoto mpamba, ezali na bolembu, ezali na ndelo, ekokufa lokola ya biso, nzoto oyo ekotiya motema epa ina ye lokola mwana moke.  Na yango, akabolaki nà biso kino nsuka, bobola bwa biso, aponaki kozala nà biso mpe asikoli biso, nà mwa moke tokokaki kobonzela y顱, (tala na Nicola Cabasilas, La vita in Cristo, IV, 3).

Pàpa akobi koloba na kolakisa bango esengo oyo ezali na komona moto asepeli na eloko yo okabeli yé, atako likabo lyango ezali ¡°moke¡± kasi ¡°elongobani na bosenga ya biso¡±, mpamba te, ¡°likabo linà likosangisa biso lisusu koleka na bato banso tolingaka¡±.

Nzokandé Pàpa alakisi bokokani kati na Ukaristya, alobi: ¡°Mokonzi ayambi, asantisi mpe abenisi lipa nà vino oyo tobonzeli ye o lotale, elongo na mbeka ya bomoi bwa biso; mpe abongoli yango na Nzoto mpe Makila ma Kristu, mbeka ya bolingi mpo ya libiki lya mokili¡±. Nzambe azali kosangana elongo na biso, mpe na esengo ayambi libonza tobonzeli ye. Abyangi biso tozala bomoko elongo nà yé, tango tokozwa mpe tokokabola na nsai likabo lya yé ya bolingo.

Nakosukisa, Léon ya zomi na minei akanisaki na bato Misa esengelaki kosalema na ngonga ya 17h00 na kati ya bazilike Santu-Yoane-ya-Laterano na Roma. Sima ya Misa màna mokolanda molongo mp ona kopesa lokùmu na Ukaristya o banzela ya mboka bibélé. Molongo monà mokosuka na bazilike Sainte-Marie-Majeure, esika wapi Pàpa franswa azali kopema. Episkopo wa Roma alobi ¡®te: ¡°Tika ete molùlù moye mozala elembo ya bomipesi bwa biso nakozala mokolo na mokolo, ut¡¯o Lotale mpe o ndako kapo (Tabernakolo), baye bakomemaka boyokani mpe boboto, boko mpo na basusu, na lisungi mpe na bolingo (bondeko)¡±.

Eyenga-Nzambe ezali kokùmisa bozalisi solo bwa Yezu Kristu, na sakramentu ya Ukaristya, na elembo esantu ya Lipa nà Vino. Bakosepelaka molùlù moye o mokolo mwa mosàlà minei (jeudi) oyo elandi eyenga enene ya Bosato Bosantu bwa Nzambe. Elingi koloba ¡®te esalemaka sima mikolo tùkù motoba sima ya Pasika. Solo na mboka Italie, bakosepela eyenga enà, o mokolo mwa lomingo molandi mokolo mwa mosàlà minei ya mokolo ya tùkù motoba sima ya Pasika.

Pàpa Léon XIV alobi 'te: "Lelomei, mokili mozali kobelela mpe kosenga boboto"
Pàpa Léon XIV alobi 'te: "Lelomei, mokili mozali kobelela mpe kosenga boboto"   (AFP or licensors)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

23 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 11:56