Likita po ya banso : “Yezu elikya na biso, akoki kobikisa biso”
Jean-René B- Kinshasa
Asakolaki liteya na ye na esika ya Santu-Petelo, epayi wapi bandimi na bato ya mobembo wa boyambi basanganaki ebele o eleko ya likita po ya banso wa mokolo ya misato ya lelo 25 ya sánzá ya motóbá, likita ya suka liboso ya bopemi. Pápa azongelaki esika moko ya Nsango Elamu ya Malako, oyo akoloba masolo mibale ya makámwisi: eye ya mwana mwasi ya mibu 12, azalaki kobélé na mbeto pe azalaki kozela liwa; pe eye ya mwasi moko, eye azalaki kobimisa makila úta mibu zomi na mibale pe aluki Yezu po abika (cf Mk 5, 21-43).
Na likambo ya liboso, Pápa alobaki boyambi pe elikya ya tata ya elenge mwasi eye, liboso ya likambo moko ya pasi “avandi na ndako te po na komilela na bokono ya mwana na ye ya mwasi, kasi abimi pe asengi lisalisi”. Atako azalaki mokonzi ya sinagóga, asengi na makasi eloko moko te na botali mosala na ye. “Tango asengelaki azela, elimbolaki ye, abungisaki bokitisi motéma te pe azeli. Pe tango bayei koyebisa ye ‘te mwana na ye ya mwasi akufi pe ezali na ntina te ya kotungisa Motéyi, akobaki kozala na boyambi pe kolikya”. Yezu alobi na ye, na bolobi: “Obánga te, zala sé na boyambi”. Na sima, akeyi na ndako na ye pe, na bomoni ‘te bato banso bazalaki kolela pe koganga, alobi: “Mwana awei te, alali pongi”. Akotaki esika mwana azali, azui ye loboko, na bolobi boye: «Talità kum», elingi koloba «Elenge mwasi, télémé!».
“Liwa ya nzóto ezali lokola pongi moko”
Na bokobi liteya n aye, Santu-Pápa asemboli ‘te Yezu akobikisa kaka bokono nionso te, akolamusa lokola na liwa. “Po na Nzambe, oyo azali Bomoi ya seko, liwa ya nzóto ezali lokola pongi moko. Liwa ya sóló ezali eye ya molimo: yango ndé tosengeli kobanga”, elobaki ye. Koleka likámwisi esalemi, Mokonzi alakisaki lokola “bolingo na ye na bomoto na biso” tango asengaki na baboti bapesa mwana eloko ya kolia. Léon XIV abiangaki awa ya kososola na mozindo pe ya komituna mwa mituna: “tango bana na biso bazali na bozangi pe bazali na posa ya bilei ya molimo, toyebaka kopesa bango? Pe lolenge nini tokopesa bango soki tomileisaka biso moko te na Nsango Ndamu?”
Kopusana pembeni na Yezu te likoló-likoló
Na liteya eye, lisolo ya mwasi abimisaka makila eye alongaki na bopusani pembeni ya Yezu pe ya kosimba monkóto na ye, etiamaki lisusu liboso na Pápa. Léon XIV alobaki bôngó ‘te akokaki kozua “nzela ya libiki tango, kati na ye, boyambi ‘te Yezu akoki kobikisa ye ebotamaki: Azuaki makasi ya kobima pe ya kokende koluka ye, alingaki akoka ata kosimba elamba na ye”. Nzinganzinga ya Yezu, bato bazalaki ebele mingi bazalaki kosimba ye, kasi eloko moko ekomelaki bango te. Kasi, elimbolaki ye, eleko mwasi ena asimbaki ye, azuaki libiki. Boyambi na ye, kasi molende na ye lokola, bibetamaki nsete na episkopo ya Roma. Alendisaki lisusu bato ‘te “bapusana pembeni ya Yezu likoló-likoló te, na bondimi na bosolo bokasi na ye te”.
Pápa wa Roma abiangaki ya komeka bokasi ya Kristu, eleko tozali kokutana na mikakatano, “tokangemi na makanisi ya baye bazali kokanisa kotia bilembo likolo na basusu”. O bileko ya pasi pe ya kolemba, esengeli “kokende epayi ya Yezu oyo akoki kobikisa biso, kosala ‘te tobotama lisusu”. Po “ye azali elikya na biso”, elobaki Pápa.