MAP

Ba-Palestina bazali kozela mpamba lisungi, kasi biloko ya koliya (bilei) bizali té. Ba-Palestina bazali kozela mpamba lisungi, kasi biloko ya koliya (bilei) bizali té.  (ANSA)

Léon XIV: Bakoki soki moke te kosàlela Nzala lokola ebundelo ya bitumba

Na liyebisi lya yé na libakù lya likita lya lisanga ya FAO, Pàpa Léon ya zomi na minei azali kokweisa likambo oyo wapi baiké bazali kokutana na likàma ya nzala. Nzokandé basivili bazali kokufa na kibobola, bakambi bamipelengano (politiki) bazali kofuluka na mpo ya kanyaka. Azali kofukisa bato baye bazali kosalela mbongo mpe ba-tekinoloji ya sika na bozangi koluka kolongola to kosilisa nzala mpe bobola na mokili.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Lisanga ya FAO oyo elimboli na lokota ya lifalansa: «Organisation des Nations unies pour l’Alimentation et l’Agriculture», ezali kosepela na mobù moye, bambula tùkù mwambé (80 ans) ya bobandisi bwa yango. Na libakù lya likita lya yé ya mbala ya tùkù minei na inei (44è), oyo ezali kosalema ut’o mokolo mwa tùkù mibale na mwambé (28) ya sànzà ya yuni kino mokolo mwa minei (4) ya yuli, Pàpa Leon ya zomi na minei (Léon XIV) atindi liyebi moko na lokota ya espagnol, na directeur général Qu Dongyu mpe na basangani banso. Mokoloto ya mokànda monà motyamaki o mokolo mwa tùkù misato (30) ya sànzà ya yuni na Vatikan. 

Afukisi bitumba ya bituluku ya basivil oyo bazwi mandoki, bazali kotumba mabelé, koyiba bibwele mpe bazali kokanga nzela na lisungi, kaka mpo na «kokonza bato banso oyo bazangi makoki ya komibatela». Lisusu mpe nà bitumba ya basodá oyo bazali kobundisa mpe kokanga banzela ya kopesa mai ya komela mpe nzela ya kosolola.

Na Palestina, Bozangi koyokana ezali kobota nzala makasi.
Na Palestina, Bozangi koyokana ezali kobota nzala makasi.   (AFP or licensors)

Mokonzi monene Pàpa azali kokweyisa lolenge ya kosalela nzala lokola mwango to ebundeli ya bitumba. Kobebisa mabele ya bilanga mpe kokanga lisungi ya bilei mpo na bato bakufi nzala, na mapingà ya bato bazali na mandoki. Manso mànà kaka mpo na koluka kokamba baye banso bazwami na bozangi libateli.

Akebisi mpe mosala ya koyiba mbongo nà ba tekinoloji oyo ezali kosala mandoki (bibundeli) na esika ‘te basilisa mpo na elonga ya bobόla. Pàpa Léon alobeli “kokabwana ya boyokani kati nabikolo na mikili”, mpamba tè, yango ndé ezali kolembisa bomoko mpe kobakisa bokeseni, atako mabelé ekoki koleisa bato banso ya mokili.

Nakomonisa kokóla ya bokweyi bwa mokano ya “Nzala libunguntulu, elimboli: Nzala soki moke te” oyo manaka ya 2030 etiyaki, Léon ya zomi na minei (XIV) asengi “te maloba ekóma misala”, na nzela ya kopesa etumbu ya polele na bato baye bazali kosala mbeba wana. Azali mpe kolendisa bato te básala bibongiseli ya malamu oyo ekoùmela mpo na biloko ya kolya, oyo esimbami na bosembo mpe na kimya.

Na kosukisa, Ngwende-Esantu endimi lisusu komipesa mpo na kosunga babόla mpe ekumisi mosala ya FAO. Akundoli ‘te nkisi ya solo mpo na kosilisa nzala ezali na bokabolani mpe na boyokani kati na mokili mobimba.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

30 sánzá ya motóbá 2025, 17:07