ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Ebundelo ya makasi oyo ebwakaka ba bombe, ya ekolo ya Amerika (Bombardier B-2) Ebundelo ya makasi oyo ebwakaka ba bombe, ya ekolo ya Amerika (Bombardier B-2)   (AFP or licensors)

L¨¦on XIV alobi ¡®te esengeli koboya mansenginya ya bibundeli (mandoki)

Na nsuka ya mateya to malongi ya bato banso ya mokolo mwa 18 yuni, na esika Santu-Petro, P¨¤pa L¨¦on XIV asengaki bakonzi ya mipelengano mpo bakweya te na masengenya ya bitumba mpe ya kosalela bibundeli (mandoki) ya makasi. ?Tosengeli komesana na bitumba soki moke te?, elobaki ye, na kotanga mpe matata oyo ezali kotungisa Ukraine, Mabele Masantu na mpe Iran.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Yambo ¡®te apesa mbote na bato bamobembo ya lokota ya italien, sima ya malongi ya bato banso na esika Santu-Petro, Léon atomboli lisusu mongongo mpo ya kobelela kimya na mokili, awa topusani mpo ya kosepela eyenga ya Corpus Domini. Alobi ¡®te: «Motema mwa eklezia ezoki na kolela oyo ezali kobima na bisika ya bitumba, mingi mpenza na Ukraine, Iran, Israël mpe na Gaza», «Tosengeli komesana soki moke te na bitumba». ¡°Asengi ¡®te toboya lokola masengenya, esengo ya kosalela bibundeli to mandoki ya makasi¡±.  Alobi yango na ndakisa ya ba bombe bazali kosalela mpe oyo bazali kolengela, ba-Israel to ba-Amerika, mpo na kobwaka bisika ya ba sites nucléaires ya ekolo ya Iran.

Pápa azongeli maloba ya Mibeko Gaudium et Spes  elobakà na tango ya concil Vatikan ya mibale (Vatican II) ¡®te: ¡°Bazali kosalela bibundeli ya siansi ya ndenge na ndenge mpo na kobunda bitumba, mpe mobulu na yango ezali komema bato oyo bazali kobunda na bitumba yango na makambo ya somo koleka oyo ya kala¡±. Tata-Mosantu, na kobéngáká mibeko ya mokili mobimba mpe lokumu ya moto, atángaki mpe maloba ya bakonzi mibale oyo bazalaki liboso na ye, mpo na kolendisa bakonzi ya mopelengano (politiki) ya mikili oyo mizali na bitumba ete bátika kosalela bibundeli: Liboso Franswa, ntango alobaki ¡®te ¡°etumba ezali bobele libunga¡±; Mosusu mpe Pie XII, tango alobaki yambo ¡®te etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebanda, ¡®te: ¡°likambo moko ebungisami te n antina ya kimya, kasi nyonso ekoki kobunga n antina ya etumba¡±.

Mbela moye ya Tata-Mosantu eyei, awa matata mwa sika mobimi kati na Israël mpe Iran, nsima ba mpepo ya Israel bamemaki ba bombe ya bango na mabele ya Iran, oyo ebundisaki bibongiseli ya nikleere mpe bakonzi ya mampinga ya Iran. Na nsima ya etumba yango, ebongiseli ya nikleere ya Iran, oyo mbulamatari ya Israël ezali kotalela lokola likámá mpo na bomoi na yango, mpe oyo mikili ya Mpótó mizali komeka kopekisa na nzela ya boyokani na boumeli ya bambula mingi.

Esika ya libosoliboso ya nikleere ya Iran oyo bazali koluka ezali oyo ya Fordo, ekundami na nse ya ngomba; bongo kaka bombe moko ya Amerika, GBU-57 nde ekoki koleka na kati mpe kobebisa libateli na yango.

Sik¡¯awa, Etats-Unis ezali na ngambo moko te na bitumba yango, kasi ezali kokoba na bopusi ya diplomatie na bokonzi ya Teheran mpe ezali kopesa maboko na bakonzi ya Israël.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

19 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 03:57