Likita po ya banso : ¡°Tosenga likabo ya kososola epayi wapi bomoi na biso ekangami¡±
Jean-René B.-Kinshasa
Po na likita na ye po ya banso liboso ya suka yambo ya bopemi, mokolo ya misato 18 ya sanza ya motoba na esika ya Santu-Petelo, Pápa Léon ya Zomi na Minei atelemaki na lisolo ya libiki ya moto akúfá makolo, eye elobami na mokoloto ya mitano ya Nsango Elamu ya santu Yoane (5,1-9). ¡°Tozali kokoba kotala Yezu oyo azali kobikisa¡±, elobaki epsikopo wa Roma. Na sima abiangi lelo, ya ¡°komanyola na makambo maye toyokaka ¡®te ¡°tokangami¡± pe ¡°tozali komona nzela te¡±. Tango mosusu, elobaki ye, ¡°tomonaka lokola ezali na ntina te ya kokoba kozala na elikia, tomilembisi pe toboyi kobunda¡±.
Kobikisa pe kopesa elikya
Santu-Pápa abetaki nsete na likambo moko na bolobi ¡®te tango ¡°Yezu akei na Yelusalem po na feti moko ya bayuda, akeyi mbala moko na tempelo te, kasi atelemi na ezibeli moko epayi wapi bazalaki kosukola bameme baye bakopesama lokola mbeka¡±. Pembeni ya ekuke ena, ekobaki Léon ya Zomi na Minei, ¡°ezalaki na bato ebele ya bokono baye, na bokeseni na bameme, babenganaka bango na tempelo, zambi bazalaki komona bango lokola bato ya mbindo!¡±. Wana Yezu ye mei ¡°akei esika bazalaki na pasi na bango¡±. Bato wana, elimbolaki Pápa, bazalaki na elikya ya kozua ¡°moto moko akoki kobongola bomoi na bango¡±. Lokola ¡°pembeni na ezibeli ezalaki na esika ya kosukola nzoto eye mayi na yango ezalaki komonana lokola ezali na makoki ya kobikisa, mayi ezalaki koningana pe, lolenge ya bondimi ya eleko ena, oyo akomibwaka kuna moto ya yambo akozua libiki¡±.
Episkopo ya Roma alakisaki ¡®te ¡°esalemaki lokola ¡®etumba moko ya babola¡±. ¡°Tokoki kokanisa, ekobaki ye, esika moko ya mawa ya bato ya bokono kokita na pasi po na kokota na esika ya kosukola¡±, eye ¡°ebengamaki Betzata, elingi koloba ¡°ndako ya mawa¡±. Esika ena ya kosukola ekoki kozala, engebene na Benoît XIV, ¡°elili moko ya Eklezia, epayi wapi bato ya bokono pe babola basangani pe epayi wapi Mokonzi akoya po na kobikisa pe kopesa elikya¡±.
Na bolobi mpenzá-mpenzá na moto ena akúfá makolo uta mibu 38 pe amilembisi, zambi azalaki kokoka te kokota na esika ya kosukola o eleko mayi eninganaka¡± (cf. v. 7), Yezu atuni ye motuna moko: ¡°Olingi obika?¡± (v. 6). Motuna moko ekoki ¡°komonana lokola ezali na ntina te¡±, kasi, elimbolaki Mokitani ya Petelo, ¡°boséngi moko ezali na ntina¡±. Po ¡°tango tokangami uta mibu ebele, atako posa ya kobika ekoki kobunga¡±. Tango mosusu, ekobaki ye, ¡°tokosepela kotikala na bokono, na botindi basusu babatela biso¡±. Ezali lisusu, elobaki Pápa, ¡°tango mosusu bolimbisi moko po na koboya kozua mokano ya nini tokoki kosala na bomoi na biso¡±. Epayi mosusu ¡°Yezu akotinda moto eye na posa na ye ya solo pe ya mozindo¡±, elobaki ye.
Koloba posa na biso ya libiki
Na bokobi lisolo na ye ya libiki ya moto akúfá makolo, Pápa alakisi ¡®te ¡°moto eye ayanoli na lolenge ekoki na motuna ya Yezu¡±, na bolakisi bongo ¡°lolenge ye azali kozua bomoi¡±. Lokola ¡°alobi liboso ¡®te azali na moto akoki kobwaka ye na esika ya kosukola te: mbéba ezali ya ye te, kasi ya basusu bazali kotala ye te¡±, elobaki Pápa wa Roma. Ezaleli moko ekomi, engebene na Léon ya Zomi na Minei ¡°likosi moko po na kolinga komema mikumba ya ye moko te¡±. Kasi ¡°ezali ya solo ¡®te azalaki na moto ya kosunga ye te?¡±, Pápa amitunaki. Léon ya Zomi na Minei akobi na botangi ¡°eyano moko ekopelisa¡± ya Santu- Augustin: ¡°Iyo, po na kobika, azalaki ya solo na bosénga ya moto, kasi moto yango azalaki pe Nzambe, [¡] Moto oyo asengelaki akomaki, po na nini kowumisa libiki?¡±.
Ya solo, elimbolaki ye lisusu, moto akúfá makolo, ¡°abakisi lisusu ¡®te soki ameki komibwaka na esika ya kosukola, ezali kaka na moto moko oyo akomaka liboso na ye¡±. Maloba bikolakisa ¡°emoniseli moko ya mawa ya bomoi¡±, elobaki Santu-Pápa. ¡°Tokanisi ¡®te makambo bizali kokomela biso pamba ¡®te tozali na konzo te, pamba ¡®te bomoi ekobundisa biso¡±. Po na episkopo wa Roma, ¡°moto eye asili alembi, amoni ¡®te akweyi na etumba ya bomoi¡±. Kasi, elobaki ye lisusu, Yezu asungi ye amona ¡®te ¡°bomoi na ye ezali kati na maboko na ye¡± pe akobenga ye ¡°atelema, atika kobika lolenge ena pe amema kitikwala na ye¡± (cf. v. 8). Pápa wa Roma amoni ¡®te kitikwala ena ¡°ezali ya kotika te to ya kobwaka te¡±. Ekolakisa, elobaki Pápa ¡°bokono na ye eleka¡±, ¡°lisolo na ye¡±. Ezali ya ¡°kotambola, na bomemi mokumba ya kopona nzela ya kolanda¡±. Pe wana ¡°na lisungi ya Yezu!¡±, esukisaki ye.