Molongo ya mituka ya mbala ya 131¨¨me ya lisungi lya P¨¤pa ekeyi na ekolo ya Ukrayina
Bansango ya Vatican
Lisalisi oyo ekei na Ukrayina ezali biloko ya yambo moto asengeli na yango. Batindi o mokolo mwa mitano mwa 2 ya sànzà ya mitano (mayi) bilamba, bileyi, bankisi, mpe biloko ya bopeto. Ewutaki na eklezya ya Sainte-Sophie ya Roma mpe ekeyi na oyo ya ekolo ya Ukrayina. Ba eklezya ya ekolo eye, ekomi esika ya kokongola biloko mwa mikolo mileki, ut¡¯o ezali kotungisama na etuka ya Russi. Episkopo wa lokùmù Konrad Krajewski, omônier ya Pàpà, akendakà mbala ebele na ekolo oyo ya moniele mwa Europa mpo na komema lisungi lya Pàpa. Ezalaki na makanisi mya Pàpa lokombo mboka ekonyokwama bomartiro. O mokolo mwa mitano, ezalaki mba ya nkàmà moko nà tukù misato na moko (131ème) oyo molongo mya mituka ememamaki. Ezali mitindo mya nsuka oyo yemei Mokonzi monene ya bantomà apesaki mpo na ba engumba ezali na bwalé koleka ya matata.
Lolenge ya kosunga ya François
Nsango eye epesami na liyebisi ya baziliki ya Sainte-Sophie ; alobi ete, likabo lya Pàpa, likolakisa lolenge lya nsuka ya bolingi bwa Pàpa mpe lisungi lya yé mpo ya bato yaya Ukrayina. Bandimi ya Paloase, ba benevoles, ban aya kelasi ya Collège Pontifical Saint-Josaphat, basàngo mpe batindami ya mangombà ma Ukrayina na Roma ndé batondisaki mukuka mona. Esilisaki bango, basànganaki banso bomoko na losambo okati ya baziliki mpo ya kimya na Ukrayina mpe mpo na baye bazoki, bayé bakimi, nà mpe bayé bazwami na bisika bitumba bizali. Babongisi bya etindà enà balobi ete likabo linà lizali lisungi mpamba ya biloko te kasi elembo makasi ya molimo, ya bondeko mpe ya bolingo. Pàpa abosanaki minyoko ya bato ya Ukrayina te kino o pema ya yé ya nsuka.
Na koloba nà SIR, esaleli ya bansango oyo ezali elongo nà lisangà ya ba episkopo ya Italy, Sàngo-Mokonzi ya Sainte-Sophie, Marco Yaroslav Semehen, akanisi kozala pembeni ya François tango inso nà mission humanitaire oyo botamaki nzinga nzinga ya baziliki. Makabo mazalaki kokoma sé kokoma na lisalisi lya tata episkopo wa lokùmù Krajewski. Alobi ete na motuka moko nà moko, lisungi lya Pàpa lizalaki kozanga te. Bakolikya ¡®te awa azali o likolo, Tata-Mosantu akozangisa bango lisàlisi lya yé te, kasi akolekisa kosàla yango. Eloko ya motuya Pàpa François asàleli biso, ezali oyo ya kolinga ete elikya ya biso ekweya te.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.