Ukrayina, Kimya eleki na nzela ya Saint-Pierre
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Okati ya bililingi ekotikala na mbote ya nsuka ya Pàpa François, kolongola oyo ya matanga, tozali na oyo ezali kolakisa Donald Trump Mokambi ya Etats-Unis nà moninga waye Volodymyr Zelensky, nkumu ya mboka Ukrayina ; bavandi moko liboso lya mosusu na mopanzi moko ya baziliki Saint-Pierre. Ezalaki bokutani ya yambo miso na miso kati na bango mibale, sima ya oyo ya somo elekaki na Mondovision na biro ya Ndako ya Pembe (Maison Blanche). Bongo ngonga ya bokutani bonà moùmelaki kaka ba minitizomi na mitano (15 minutes)
Masolo mazali na litombà
Mpo ya Steve Cheung, moyangeli ya communication ya Ndako ya Pembe, masolo ma bango mozalaki na litombà monene. Ezali na foto mosusu babimisaki oyo ezali kolakisa Donald Trump, Volodumyr Zelensky nà Keir Starmer, mbulamatari ya Grande Bretagne nà Emmanuel Macron. Basololaki mpo ya boyokani, elobi Serhii Nikiforov, porte parole ya bokonzi ya ekolo ya Ukrayina. Na Tweeter, Volodymyr Zelensky, alobi ete masolo mànà makoki kobongwana lisapo, soki mokano bazwaki ekokisami mpo na litomba ya bolamu ya banso. Abyangi na bokitisi mandoki mpe na kimya ekoùmela mpe ekopekisa bitumba bisusu ya sika.
Ba contre-offre ya Ukrayina
Mpo na New York Times, masolo mabango ememi na lifuti oyo Ukrayina akofutana likanisi Ndako ya Pembe epesaki mp ona kosukisa bitumba. Ut¡¯o Moscou, porte parole ya Kremlin, Dmitri Peskov, alobaki ete chef ya état-major ya Russie eyebisaki Vladimir Poutin bosilisi masolo ya kobikisa etando ya Russie ya Koursk oyo bato ya Ukrayina bavandaka kobanda mobù 2024.
Bokutani ya bato babalé babalé
Epayi mosusu, ezalaki mpe na bokutani ya bato babalé bosalemaki na mokolo monà mwa poso, na libakù lya matanga ya François. Ursula von der Leyen, mokambi ya commission européenne nà Donald Trumps, foto elekisamaki na rezo socio, tango bapesani mbote na place Saint-pierre. Bayokanaki été bakokutana lisusu, elobi Paula Pinho, porte parole ya Mme Von der Leyen. Bilembo ya kopesa mokakoswa mpo ya mokano baponi ya nzela ya masolo oyo ezali na motuya mpo na bileko tozali kokatisa sika.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.