ÐÓMAPµ¼º½

 Paàe Léon XIV na balcon ya loge ya katikati ya baziliki ya Mosantu-Petro, elongo na ba episkopo wa lokùmu oyo ba ponaki ye na conclave, o mokolo mwa mwambé (8 ) ya sànzà ya mayi ya mobù 2025.  Paàe Léon XIV na balcon ya loge ya katikati ya baziliki ya Mosantu-Petro, elongo na ba episkopo wa lokùmu oyo ba ponaki ye na conclave, o mokolo mwa mwambé (8 ) ya sànzà ya mayi ya mobù 2025.  

Episkopo wa lokùmu Aveline akumisi bwanyà bwa Léon XIV mpe bomitungisi bwa yé mpo ya bosembo

Mpo na episkopo wa lokùmu Jea-Marc Aveline, likita lya conclave ezalaki mobombamo mwa ezalela ya nzambe mpe mayoki mwa Elimo. Sima ya episkopo wa lokùmu Robert Francis Prevost, baponaki ye archevêque ya Marseille. Azali moko ya ba episkopo ya dicastere mpo ya ba episkopo. Akumisi bwanya, bomikitisi, boyoki mpe mposa ya kosàla mosàlà elongo, ya Pàpa Léon XIV.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC elongo nà Delphine Allaire

 

Sima ya molinga ya mbembe, episkopo wa lokùmu Jean-Marc Aveline, episkopo-mokonzi ya engumba ya Marseille alobi oyo akanisi na bomoto ya mokitani mwa Petro ya sika mpe oyo amoni na conclave na mokolo mwa mitano mwa 9 ya sànza ya mayi. Alobi manso, tango azalaki na mwa masolo nà Mopanzi-nsango ya RadioVatikan, Delphine Allaire na etùkà ya Vatikan.

Masolo nà episkopo wa lokùmu Jean-Marc Aveline, episkopo-mokonzi ya Marseille, ebongisamaki na Delphine Allaire

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

11 sánzá ya mítáno 2025, 11:53