ÐÓMAPµ¼º½

2025.04.23: Bokundoli ya Sanduku ya ebembe ya Pàpa François na Basiliki ya Mosantu-Petro 2025.04.23: Bokundoli ya Sanduku ya ebembe ya Pàpa François na Basiliki ya Mosantu-Petro  (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Sanduku ya ebembe ya Papa François ekozipama na mpokwa ya mokolo mwa 25 ya sànzà ya aprili 2025.

Molulu mwa bokangi sanduku ya ebembe ekosalema kobanda ngonga ya 20h00 na Basiliki ya Mosantu-Petro na Mbanza Roma. Ekokambama na episkopo wa lukumu Kevin Farrell, Camerlengo ya Eklezya ya Roma.

Basango ya Vatican

 

Molulu ya bokangi sanduku ya ebembe ya Papa François, oyo elongwamaki na ntongo ya lelo ut’o ndako avandaki Santa Marta mpe oyo ba bimisi sik’awa mpo ete bandimi bapesa limemya na bango, ekosalema mokolo mwa mitano, mwa tukù mibalé na mitano (25) ya sànzà ya aprili, na ngonga ya 20h00, na Basiliki Mosanto-Petro. Molulu engebene - (n° 66-81) - ekokambama na episkopo wa lokumu Kevin Joseph Farrell, Camerlengo ya Eklezia ya Roma.

Engebene na Biro ya milulu ya Papa, ba Episkopo ba lokumu Giovanni Battista Re, Doyen ya Collège ya ba Episikopo ba Lokumu; Roger Michael Mahony, Mokambi ya Kadinale; Dominique Mamberti, episkopo wa lokùmu ya Protodiacre; mpe Mauro Gambetti, Nganga-nzambe-mokonzi ya Basiliki ya Pàpa, Mosantu -Petro na Vatican, bakosangana na molulu mwango.

Bakozala mpe na ba Cardinaux Pietro Parolin, Mokomeli mwa kala ya etùka, Baldassare Reina, Mokambi monene-molandi ya Diocèse ya Roma, Konrad Krajewski, aumônier ya Mosantu Papa.

Episkopo Edgar Peña Parra, oyo azwaki esika ya Mokambi monene ya etuka, episkopo Ilson de Jesus Montanari, Vice-Camerlengo ya Eklezya Esantu ya Roma, episkopo Leonardo Sapienza, Mokonzi ya ndako ya Pàpa, ba Chanoines ya Mokapo ya Vatican, ba pénitentiaires mineures ordinaires ya Vatican, bakambi banene ba Tata Mosantu mpe bato basusu oyo bandimami na Mokonzi wa milulu ya losambo ya Pàpa, Episkopo Diego Ravelli. Bato banso bakokutana na ngonga ya 19h30, liboso ya etumbelo ya bolimbisi masumu.

Libongoli lya Sanduku ya ebembe ya Pàpa François na Baziliki ya Vatican

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

24 sánzá ya mínei 2025, 08:45