Na sànzà ya Aprili, Pàpa akobyanga na losambo mpo ya esàleli elamu ya ba teknoloji ya sika.
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
“Boni boni nakosepelaka ete tolandaka bililingi mingimingi te kasi totàlanaka na miso biso na biso koleka”. Ezali ndé bongo na bosénga eye Pàpa François abyangi Eklezya ya mokili mobimba, o mokolo moye ya yambo ya sànzà ya aprili (ya minei). Asengi losàmbo mpo ya esàleli malamu ya ba teknologie ya sika.
Biteni basato ya bato na mokili bazangi Internet
Tata-Mosantu azali te kopesa etumbu na teknologie yango moko, kasi mpo na yé, « teknologie ezali mbuma ya mayélé oyo nzambe apesaki biso ». Bongo esengeli kosàlela yango na mayele ; ekebisi yé bato. Kati na boyokani y abato, soki tokolekisaka tango mingi nà ba tshombo ya biso na esika ya bato, ezali malamu te. Tobosana te ete sima ya ba milona (écran), « ezali na bato ya solo bazali kopema, koseka mpe kolela».
Na nsima abetaki nséte alobi : ba teknoloji ya sika esengeli kozala ntina ya kokanisela bato mabé to (kokotisa bokeseni kati na bato). Atalisi bokeseni ya kosàlela to kozwa ba numerique na mokili. Engebene agence web , ba smartphones actifs eleki bato na ebele na mokili, motango epesi 8,2 milliards y abato mpo na 8,6 migliards ya ba tshombo (smartphones). Kasi atako bongo, motango yam pe bilembo ya , elobie te: biteni basato y abato kati na mokili bazangi internet, bazali nayino na makoki ya kozwa tshombo te.
Mpo na kosangisa kasi kokabola te
Mokonzi monene ya bantomà apesi makanisi mpo na esàleli ya bateknoloji: “kosàlela yango na mayélé”, “mpo na kosangisa kasi kokabola te”. Ndakisa ekoki kozala ete, tosalela yango mp ona kobongisa bomoyi ya bato bazali na mpasi, babolà, bakoka. To mpe kokéla eloko ekosàlisa na “kosunga ndako ya bato nyonso (bomoko)”.
Makani maye manso, ezali mpo “na kokutana lokola bandeko basi mpe babali”.
Pàpa Francois asosoli ete: «tango tozali kotalana na miso biso na biso, tokokundola eloko ezali na ntina mpenza: ete tozali banso, bandeko mibali, basi mpe tozali bana ya Tata moko».
Lisolo ya na teknoloji ya sika mpe ya mayélé ya kosàla (intelligence artificielle) ezali lisolo ebetami sika te mpo na Saint-Siège. Pàpa François akomaki mayebisi mpe mikanda mpo na esaleli elamu ya intelligence artificielle. Asengaki na bakambi ba mangomba basanganaki na Paris, na libakù lya “Sommet pour l’action sur l’IA” na sànzà ya febuali moleki, na “kobatela mokili na esàleli mabé ya intelligence artificielle” oyo ekoki kozala na bondimi.
Bongo mpo na sànzà ya aprili, Pàpa apesi likanisi ya kosambela mpo ete “esaleli ya ba teknoloji ya sika ezwa esika ya boyokani y abato, kasi etosa bomoto y abato, esàlisa na kolonga mikakatano ya eleko ya biso”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.