Na bop¨¦mi ya maladi, P¨¤pa azali mpe kokutana n¨¤ bayangeli ya ba dicast¨¨res
Bansàngo ya Vatican
¡°Pàpa azali kokoba kopéma¡±, ndako ya bopanzi nsàngo epesi bongo liyebisi lya bokolongono bwa nzoto ya Tata-Mosantu. Kobika ya yé ezali komonana malamu, mingi mingi kopéma kotambola mpe koloba. Lisusu ba analisi ya makila ezali malamu. Azali kozwa lisusu oxigène na ngonga molayi te, kaka mpo na lisalisi.
Poso Esantu
Ata nsàngo moko epesami te na maye matali kosàngana ya Pàpa na milùlù ya Poso Esantu: ¡°ekoséngela kolandela météo¡±. Mpo ya lomingo la mbila, to mpe eyenga ya mandalala, Pàpa asengi ete Misa makambama na lisàlisi ya episkopo wa lokumu Leonardo Sandri, mokambi molandi ya lisàngà ya ba episkopo wa lokùmu mpe moyangeli ya kaka ya dicastére mp ona kolendisa ba eklezya ya Moniele mwa mabele ya Asiya .
Kotàla ya ba mpaya mpo na mosàlà, ezongeli
Ut¡¯o abimaki lopitalo Gemelli o mokolo mwa tukù mibale na isato ya sànzà ya marsi, Pàpa François azalaki kopéma na ndako avandaka: Sainte-Marthe, bongo ayambaki mpe mwa bampaya, boyé poso misato moleki. Soki balongoli roi Charles III ya ekolo ya Angleterre nà mwasi wa yé Camilla o mokolo mwa libwà (9) ya sanza eye ya aprili, bayangeli ébélé ya badicasteère mpe bakambi ya Curie bakendaki kotàla Tata-Mosantu. Moko wa bango ezali Mgr Pena Parra, oyo azwi esika ya Mgr Gallagher, mokomeli mpo na baRelations elongo na ba Etukà, nà mpe Mgr Luciano Russo, Mokomeli mpo ya bareprésentation pontificales.
Mpo ya kosukisa, Pàpa asalaki surprise n abato; akendaki koleka mwa moke kasi aponaki kokota tee na baziliki ya Saint-Pierre mpo ya losàmbo. Elekaki bongo o mokolo mwa zomi (10) ya sànzà ya aprili, epesaki bongo nsàngo, ndako ya bopanzi-nsàngo. Liyebisi lya mbala ya sima mpo na bokolongono bwa nzoto ya Pàpa François, ekopesama o mokolo mwa mosàlà mibale mwa zomi na itano (15) ya sànzà ya aprili.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.